1 Na mokolo wana, etima moko ekobimisa mayi mpo na kopetola masumu mpe mbindo ya libota ya Davidi mpe ya bavandi ya Yelusalemi.
2 Na mokolo wana, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, nakosala ete bakombo ya banzambe ya bikeko elimwa na mokili ; boye bakotikala kokanisa yango lisusu te. Nakolongola lisusu kati na mokili basakoli mpe molimo ya mbindo. 3 Boye, soki moto moko akobi kosakola, tika ete tata mpe mama oyo babota ye baloba na ye : ‹ Osengeli kokufa mpo ete olobi makambo ya lokuta na Kombo na Yawe ! › Wana akozala kosakola, baboti na ye bakotobola ye na mopanga. 4 Na mokolo wana, mosakoli moko na moko akozala na soni mpo na kosakola mpe koloba bimoniseli na ye ; akokosa lisusu bato te na kolataka bilamba ya basakoli, oyo basala na bapwale. 5 Akoloba : ‹ Nazali na ngai mosakoli te ; ngai nasalaka na ngai bilanga, mabele nde ezalaka libula na ngai wuta bolenge na ngai ! › 6 Soki batuni ye : ‹ Bongo bapota oyo ezali na tolo na yo ewuti wapi ? › Akozongisa : ‹ Nazokaki yango kati na ndako ya balingami na ngai. ›
Kobetama ya mobateli bibwele
7 Oh mopanga, telema !
Tika ete otelema mpo na koboma mobateli bibwele na Ngai !