5 Bato oyo batambolaka kolanda baposa ya nzoto batiaka makanisi na bango na makambo ya nzoto, kasi ba-oyo batambolaka kolanda Molimo batiaka makanisi na bango na makambo ya Molimo. 6 Baposa ya nzoto ememaka na kufa, kasi baposa ya Molimo ememaka na bomoi mpe na kimia. 7 Baposa ya nzoto etombokelaka Nzambe, etosaka Mobeko ya Nzambe te mpe ekotikala kotosa yango ata moke te. 8 Bato oyo batambolaka kolanda baposa ya nzoto bakoki kosepelisa Nzambe te.
9 Nzokande bino, botambolaka te kolanda baposa ya nzoto, kasi kolanda baposa ya Molimo, mpo ete Molimo ya Nzambe azali kati na bino. Mpe soki moto azangi Molimo ya Klisto azali mpe moto na Ye te. 10 Kasi soki Klisto azali kati na bino, atako nzoto na bino ekokufa mpo na lisumu, kasi Molimo azali bomoi kati na bino, pamba te bokoma bato ya sembo. 11 Mpe soki Molimo ya Ye oyo asekwisaki Yesu kati na bakufi azali kovanda kati na bino, Ye oyo asekwisaki Klisto kati na bakufi akopesa mpe bomoi epai na banzoto na bino, oyo ebengami na kokufa, na nzela ya Molimo na Ye, oyo avandaka kati na bino.
12 Yango wana bandeko na ngai, tozali na niongo—kasi ezali niongo ya nzoto te mpo ete totambola te kolanda baposa ya nzoto. 13 Pamba te soki botamboli kolanda baposa ya nzoto bokokufa ; kasi soki bobomi, na nzela ya Molimo, misala mabe oyo bosalaka kati na banzoto na bino, bokozala na bomoi. 14 Pamba te bato oyo batambolisamaka na Molimo ya Nzambe bazali bana na Nzambe.
15 Solo, bozwaki te Molimo oyo akomisaka bino bawumbu mpo ete bozala na kobanga, kasi bozwaki Molimo oyo akomisaka bino bana na Nzambe, mpe ezali na nzela ya Molimo yango nde togangaka : « Tata ! » 16 Molimo Ye moko atatolaka na molimo na biso ete tozali bana na Nzambe. 17 Mpe soki tozali bana, tozali mpe bakitani ya libula : tozali bakitani ya libula ya Nzambe, mpe bakitani ya libula elongo na Klisto, soki penza tozali komona pasi elongo na Ye mpo ete tozwa mpe nkembo elongo na Ye.
22 Toyebi malamu ete kino sik’oyo, bikelamu nyonso ezali kolela pasi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota. 23 Ezali yango moko kaka te nde ezali kolela ; kasi biso ba-oyo mpe tozwaki Molimo lokola mbuma ya liboso tozali mpe komona pasi kati na mitema, wana tozali kozela na posa makasi ete Nzambe akomisa biso bana na Ye penza mpe asikola banzoto na biso. 24 Pamba te tosila kobika, kasi kobika yango ezali nanu elikya. Nzokande soki tozali komona eloko oyo tozali kotiela elikya, wana ezali lisusu elikya te, pamba te nani akoki kotia elikya na eloko oyo azali komona ? 25 Kasi soki tozali kotia elikya na eloko oyo tozali komona te, solo tokozela yango na molende.
26 Ndenge moko mpe Molimo ayaka kosunga biso kati na bolembu na biso ; pamba te toyebi te kosambela na lolenge oyo esengeli, kasi Molimo Ye moko abondelaka mpo na biso na maloba oyo moto akoki koloba te. 27 Mpe Nzambe oyo akundolaka mozindo ya mitema ayebi makanisi ya Molimo, pamba te Molimo abondelaka mpo na basantu kolanda mokano ya Nzambe.
28 Mpe toyebi malamu ete kati na makambo nyonso, Nzambe asalaka mpo na bolamu ya bato oyo balingaka Ye, ba-oyo babengama kolanda mabongisi na Ye. 29 Pamba te bato oyo Nzambe ayeba wuta kala, abongisa mpe bango wuta kala mpo ete bakokana na Mwana na Ye, mpo ete azala Mwana ya liboso kati na bandeko ebele. 30 Mpe ba-oyo abongisa wuta kala, abenga mpe bango ; ba-oyo abenga, akomisa bango bato ya sembo ; mpe ba-oyo akomisa bato ya sembo, apesa bango mpe nkembo na Ye.