Barome
11 Pamba te nazali na posa makasi ya komona bino mpo na kopesa bino likabo ya ngolu, likabo ya Molimo, mpo ete bolendisama na kondima na bino 12 to mpo ete tolendisana elongo, na nzela ya kondima moko oyo tozali na yango. 13 Bandeko na ngai, nalingi boyeba ete nazalaki mbala mingi kosala mabongisi ya koya epai na bino, mpo na kobuka mbuma kati na bino, ndenge nazalaki kosala kati na Bapagano mosusu ; kasi kino sik’oyo, bipekiselo mingi ezali kokanga ngai nzela.
14 Nazali na niongo ya Bagreki mpe ya bato oyo bazali Bagreki te, ya bato ya bwanya mpe ya bazoba. 15 Yango wana nazali penza na posa makasi ya koteya Sango Malamu epai na bino oyo bozali na Rome.
21 Pamba te, atako bayebaki Nzambe, kasi bapesaki Ye te lokumu oyo ekoki na Nzambe mpe bapesaki Ye matondi te, kasi makanisi na bango ekomaki ya bozoba, mpe mitema na bango, oyo ezangaki mayele, etondaki na molili. 22 Atako bazalaki komimona bato ya bwanya, kasi bakomaki bazoba. 23 Na esika ete bakumisa Nzambe oyo akufaka te mpe atonda na nkembo, bakumisaki banzambe ya bikeko lokola bililingi ya bato oyo bakufaka, ya bandeke, ya banyama oyo etambolaka na makolo minei mpe oyo etambolaka na libumu.
24 Yango wana, Nzambe akabaki bango kati na baposa mabe ya mitema na bango mpe na misala ya bosoto, mpo ete basambwisa banzoto na bango moko, na nzela ya moko to ya mosusu. 25 Basundolaki bosolo ya Nzambe mpo na komipesa na makambo ya lokuta, bapesaki lokumu mpe bagumbamelaki bikelamu, na esika ya Mokeli oyo apesamela nkembo mpo na seko. Amen !
26 Yango wana, Nzambe asundolaki bango kati na baposa ya soni. Ezala basi na bango, batikaki kosangisa nzoto na mibali mpo na komipesa na bosangisi nzoto oyo esengeli te. 27 Ndenge moko mpe mpo na mibali : batikaki kosangisa nzoto na basi, batondisamaki na posa ya kosangisa nzoto na baninga na bango mibali ; basalaki makambo ya soni, mibali na mibali, mpe bazwaki kati na bango moko lifuti oyo ekokaki na libunga na bango.
28 Lokola bamonaki ete koyeba Nzambe ezali na tina te, Nzambe akabaki bango na makanisi na bango ya mabe, mpo ete basala makambo oyo ebongi te. 29 Batondaki na lolenge nyonso ya misala ya sembo te, ya makambo mabe, ya lokoso, ya mabe, ya zuwa, ya misala ya koboma bato, ya koswana, ya kokosela baninga makambo mpe ya koyina bato ; bakomaki bato na songisongi, 30 na kotiola baninga, banguna ya Nzambe, bato batonda na lolendo, na lofundu, na bilobaloba, na mayele ya kosala mabe, batomboki na miso ya baboti na bango ; 31 bato bazanga mayele, bosembo, bolingo mpe mawa. 32 Bayebi malamu ekateli ya sembo ya Nzambe ete bato oyo basalaka makambo ya lolenge wana basengeli na kufa, kasi bazali kaka kokoba kosala makambo wana nyonso mpe kondima bato oyo basalaka yango.
Barome 2 ->