3 Kasi ezala kati na Lola to na mokili to na se ya mabele, moko te akokaki kofungola buku to kotala kati na yango.
4 Tango namonaki bongo, nalelaki mingi mpo ete moko te amonanaki ete abongi mpo na kofungola buku to kotala kati na yango. 5 Bongo moko kati na bampaka alobaki na ngai : « Kolela te ! Tala ! Nkosi ya libota ya Yuda, Mokitani ya Davidi, alongaki mpo na kobuka bikangelo sambo mpe kofungola buku yango. »
6 Mpe namonaki Mpate moko ya kotelema na kati-kati ya Kiti ya Bokonzi, mpe bazingela na bikelamu minei ya bomoi elongo na bampaka. Mpate yango amonanaki lokola nde basilaki koboma Ye ; azalaki na maseke sambo mpe miso sambo oyo ezali milimo sambo ya Nzambe, oyo etindama na mokili mobimba.
7 Mpate apusanaki mpo na kozwa buku wuta na loboko ya ngambo ya mobali ya Ye oyo avandaki na Kiti ya Bokonzi. 8 Tango kaka azwaki buku, bikelamu minei ya bomoi mpe bampaka tuku mibale na minei bagumbamaki liboso ya Mpate. Moko na moko kati na bango asimbaki na loboko na ye lindanda mpe kopo ya wolo etonda na ansa oyo ezali mabondeli ya basantu. 9 Mpe bayembaki nzembo ya sika :
11 Bongo natalaki mpe nayokaki mongongo ya ba-anjelu ebele, oyo motango na bango ezalaki bankoto na bankoto ; bazingelaki Kiti ya Bokonzi, bikelamu ya bomoi mpe bampaka, 12 mpe bazalaki koloba na mongongo makasi :
13 Bongo nayokaki bikelamu nyonso oyo ezalaka kati na Lola, na mabele, na se ya mabele mpe na likolo ya ebale monene ; bango nyonso bazalaki koloba :