2 Mbala moko, Molimo asimbaki ngai mpe namonaki kati na Lola Kiti moko ya Bokonzi oyo moto moko avandelaki. 3 Mpe Ye oyo avandaki na Kiti yango ya Bokonzi azalaki komonana lokola Jasipe mpe Saridwane oyo ezali mabanga ya talo. Monama ezingelaki Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki kongenga lokola libanga ya talo oyo babengaka emerode. 4 Zingazinga ya Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki mpe na bakiti mosusu tuku mibale na minei ya bokonzi, mpe bampaka tuku mibale na minei bavandelaki yango. Bampaka yango balataki bilamba ya pembe, mpe bazalaki na mitole ya wolo na mito na bango. 5 Wuta na Kiti yango ya Bokonzi, mikalikali ezalaki kongenga, makelele ya mingongo mpe lokito ya bakake ezalaki koyokana. Mpe liboso ya Kiti yango, minda sambo ezalaki kopela : ezali milimo sambo ya Nzambe. 6 Na liboso ya Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki lisusu na etando moko oyo ezalaki lokola talatala, mpe monene na yango ezalaki lokola molayi ya ebale monene. Ezalaki kongala lokola libanga ya talo oyo babengaka krisitali. Na kati mpe na zingazinga ya Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki na bikelamu minei ya bomoi oyo banzoto na bango ezalaki etonda na miso na liboso mpe na sima. 7 Ekelamu ya liboso azalaki lokola nkosi ; ya mibale, lokola mwana ngombe ya mobali ; ya misato azalaki na elongi lokola ya moto, mpe ya minei azalaki lokola mpongo oyo ezali kopumbwa. 8 Moko na moko kati na bikelamu nyonso minei azalaki na mapapu motoba, mpe nzoto na ye ezalaki etonda na miso, ezala na se ya mapapu. Butu mpe moyi, bazalaki kolemba te koloba :