3 Bongo kati na Molimo, amemaki ngai kati na esobe moko. Mpe kuna, namonaki mwasi moko avanda na likolo ya nyama ya motane. Loposo ya nyama yango etondaki na bakombo oyo ezalaki kofinga Nzambe. Yango moko nyama ezalaki na mito sambo mpe na maseke zomi. 4 Mwasi yango alataki bilamba ya motane ya pete mpe ya motane makasi, babiju ya wolo, mabanga ya talo mpe mayaka. Na loboko na ye, asimbaki kopo moko basala na wolo mpe etonda na makambo ya nkele mpe ya bosoto ya kindumba na ye. 5 Na mbunzu na ye, bakomaki kombo moko oyo ebombaki makambo ya somo mpe oyo ndimbola na yango ezali :
12 Maseke zomi oyo omonaki ezali bakonzi zomi oyo bazwi nanu bokonzi te, kasi bakozwa yango mpo na ngonga moko mpe bakosalela yango lisanga na nyama. 13 Bango nyonso zomi bazali na likanisi kaka moko : kosangisa nguya mpe bokonzi na bango mpo na kosalela nyama. 14 Bakobundisa Mpate, kasi Mpate akolonga bango mpo ete azali Nkolo ya bankolo mpe Mokonzi ya bakonzi. Elongo na Ye, babengami, baponami mpe ba-oyo bazali sembo bakolonga mpe lokola. »
15 Anjelu alobaki na ngai : « Mayi oyo omonaki, oyo mwasi ya ndumba avandaki na likolo na yango, ezali bato ya mokili, bangulupa ebele ya bato, bikolo mpe nkota. 16 Nyama mpe maseke zomi oyo omonaki ekoyina mwasi ya ndumba, ekobotola biloko na ye nyonso mpe ekotika ye bolumbu ; ekolia misuni na ye mpe ekotumba ye na nzela ya moto. 17 Pamba te Nzambe atia kati na mitema na bango makanisi ya kokokisa mabongisi na Ye moko Nzambe, na boyokani malamu mpo na kolatisa nyama wana nguya na bango ya bokonzi, kino mikano nyonso ya Nzambe ekokisama. 18 Mwasi oyo omonaki ezali engumba monene oyo ekonzaka bakonzi ya mokili. »
<- Emoniseli 16Emoniseli 18 ->