4 Ezali bato oyo bamikomisaki mbindo te na nzela ya basi, pamba te bamibatelaki na kozanga kosangisa banzoto na bango na basi. Balandaka Mpate na bisika nyonso oyo akendaka. Basikolamaki kati na bato mpo ete babonzama lokola bambuma ya liboso mpo na Nzambe mpe mpo na Mpate. 5 Lokuta emonanaki te kati na minoko na bango ; bazali bato bazanga pamela.
8 Anjelu ya mibale alandaki mpe alobaki : « Babiloni monene ekweyi, ekweyi penza ! Emelisaki bikolo nyonso vino ya kanda ya kindumba na yango. »
9 Anjelu ya misato alandaki ba-anjelu wana mibale ya liboso mpe alobaki na mongongo makasi : « Moto nyonso oyo agumbamelaka nyama mpe ekeko na yango, mpe azwi elembo na yango na mbunzu to na loboko na ye, 10 ye mpe akomela vino ya kanda ya Nzambe, vino oyo basopaki ya peto, kati na kopo ya kanda na Ye. Mpe akonyokwama kati na moto ya sofolo liboso ya ba-anjelu ya bule mpe liboso ya Mpate. 11 Molinga ya pasi na bango ekomata na likolo mpo na libela na libela. Butu mpe moyi, bopemi ekozala te mpo na bato oyo bagumbamelaka nyama mpe ekeko na yango, mpe mpo na moto nyonso oyo akondima kozwa elembo ya kombo na yango. »
12 Makambo oyo ezali penza kosenga ete basantu, oyo babatelaka mibeko ya Nzambe mpe kondima na bango kati na Yesu, bazala na mpiko.
13 Bongo nayokaki mongongo moko kowuta na Lola mpe koloba na ngai :
15 Bongo anjelu mosusu abimaki na Tempelo mpe alobaki na mongongo makasi na ekelamu oyo evandaki na likolo ya lipata : « Kamata mbeli na yo mpe buka bambuma, pamba te tango ya kobuka bambuma ekoki, mpe ete bambuma ya mokili ekomeli. »
16 Ekelamu oyo evandaki na likolo ya lipata ebwakaki mbeli na yango na mokili, mpe mokili ezwaki lifuti na yango.
17 Anjelu mosusu abimaki na Tempelo ya Lola ; ye mpe azalaki na mbeli ya minu makasi. 18 Sima, anjelu mosusu oyo azalaki mokonzi ya moto alongwaki na etumbelo, mpe alobaki na mongongo makasi epai na ye oyo asimbaki mbeli ya minu makasi : « Kamata mbeli na yo ya minu mpe buka maboke ya bambuma ya vino ya mabele, pamba te bambuma yango ya vino eteli. »
19 Anjelu wana abwakaki mbeli na ye na mabele, abukaki maboke ya bambuma ya vino ya mabele mpe abwakaki yango kati na ekamolelo monene ya kanda ya Nzambe. 20 Bakamolaki bambuma yango na libanda ya engumba kati na ekamolelo, mpe makila ebimaki wuta na ekamolelo yango, etondaki kino kokoma na bosanda ya monoko ya mpunda, mpe epanzanaki na etando ya bakilometele pene nkama misato.
<- Emoniseli 13Emoniseli 15 ->