3 Sima na yango, elembo mosusu emonanaki na likolo, ezalaki dalagona moko ya monene mpe ya motane. Dalagona yango ezalaki na mito sambo mpe maseke zomi ; mpe na mito wana sambo, moko na moko ezalaki na motole. 4 Mokila na yango ekombolaki eteni moko kati na biteni misato ya minzoto ya likolo mpe ebwakaki yango na mabele. Dalagona etelemaki liboso ya mwasi oyo azalaki koyoka pasi ya kobota mpo ete elia mwana na ye tango kaka akobotama. 5 Nzokande, mwasi yango abotaki mwana mobali oyo akokamba bikolo nyonso na nzela ya lingenda ya ebende. Bongo mwana na ye amemamaki epai ya Nzambe mpe epai ya Kiti na Ye ya Bokonzi. 6 Mwasi yango akimaki na esobe epai wapi Nzambe abongiselaki ye ebombamelo, mpo ete asungama kuna mikolo nkoto moko na nkama mibale na tuku motoba.
7 Bongo etumba ekweyaki kuna na likolo : Misheli elongo na ba-anjelu na ye babundisaki dalagona, mpe dalagona elongo na ba-anjelu na yango ebundisaki Misheli elongo na ba-anjelu na ye. 8 Kasi dalagona elongaki te ; boye dalagona yango elongo na ba-anjelu na yango ebungisaki esika na yango kuna na likolo. 9 Babwakaki dalagona monene, nyoka ya kala, oyo babengaka zabolo to Satana, oyo akosaka mokili mobimba. Ebwakamaki na mabele elongo na ba-anjelu na yango.
10 Bongo nayokaki, kati na Lola, mongongo moko ya makasi koloba :
13 Tango dalagona emonaki ete ebwakami na mokili, ekomaki kolanda mwasi oyo abotaki mwana mobali. 14 Kasi mapapu nyonso mibale ya mpongo moko ya monene epesamaki na mwasi yango mpo ete apumbwa kino na esika na ye, na esobe epai wapi asengeli kosungama, mosika ya nyoka, mpo na tango moko, mpo na batango, mpe mpo na ndambo ya tango. 15 Bongo nyoka esanzaki wuta na monoko na yango, na sima ya mwasi, mayi ebele lokola ebale, mpo ete atiola na mbonge na yango. 16 Kasi mabele esungaki mwasi, efungolaki monoko na yango mpe emelaki ebale oyo dalagona esanzaki wuta na monoko na yango. 17 Bongo dalagona esilikelaki mwasi mpe ekendeki kobundisa bana na ye mosusu, ba-oyo batosaka mibeko ya Nzambe mpe bakangamaka makasi na litatoli na bango na tina na Yesu. 18 Dalagona ekendeki kotelema na zelo ya ebale monene.
<- Emoniseli 11Emoniseli 13 ->