Link to home pageLanguagesLink to all Bible versions on this site
Nzembo 91
Ebombamelo ya malonga
1 Moto oyo awumelaka kati na ebombamelo
ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo
avandaka na se ya bobatelami
ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
 
2 Nalobaka na tina na Yawe :
« Nzambe na ngai azali ebombamelo
mpe ndako makasi na ngai ;
natiaka elikya na ngai kati na Ye ! »
 
3 Ye nde akangolaka yo wuta na mitambo
ya mokangi bandeke
mpe na bokono oyo ebikisaka te.
4 Abombaka yo na se ya mapapu na Ye,
mpe ozwaka ebombamelo ya malonga
na se ya mapapu na Ye ;
bolingo na Ye ebatelaka lokola nguba
mpe lokola elamba ya ebende.
 
5 Okobanga te somo ya butu,
makonga oyo epumbwaka na moyi makasi,
6 bokono oyo etambolaka kati na molili
mpe pasi oyo ebebisaka na midi.
 
7 Ezala bato nkoto moko bakweyi
pembeni na yo,
mpe bato nkoto zomi,
na ngambo ya loboko na yo ya mobali,
ekozwa yo ata moke te.
8 Okotala kaka na miso na yo
mpe okomona ndenge nini bato mabe bazali
kozwa etumbu lokola lifuti na bango.
 
9 Soki otatoli :
« Yawe azali ebombamelo na ngai, »
mpe okomisi Ye-Oyo-Aleki-Likolo ekimelo na yo,
10 mabe ata moko te ekokweyela yo,
pasi ata moko te ekopusana na ndako na yo ;
11 pamba te akopesa mitindo na ba-anjelu na Ye
ete babatela yo malamu na banzela na yo nyonso.
 
12 Bakomema yo na maboko na bango
mpo ete lokolo na yo etutana na libanga te ;
13 okotambola na likolo ya nkosi mpe ya etupa,
okonyata nkosi ya monene mpe dalagona.
 
14 Lokola akangami na ngai, nakokangola ye ;
lokola ayebi Kombo na Ngai, nakobatela ye.
15 Soki abeleli ngai, nakoyanola ye ;
nakozala elongo na ye na tango ya pasi,
nakokangola ye mpe nakopesa ye lokumu.
16 Nakopesa ye bomoi molayi
mpe nakolakisa ye lobiko na ngai.

<- Banzembo 90Banzembo 92 ->