Nzembo 30
Yawe azongisi ngai na bomoi
1 Nzembo ya Davidi mpo na libulisi ya Tempelo.
2 Yawe, nanetoli Yo,
pamba te obimisaki ngai na libulu ya mozindo
mpe otikaki te banguna na ngai kosepela na tina na ngai.
3 Yawe, Nzambe na ngai, nabelelaki Yo
mpo na kosenga lisungi,
mpe obikisaki ngai na bokono.
4 Yawe, obimisaki ngai na mboka ya bakufi,
obatelaki bomoi na ngai
mosika na bato oyo bazali kokita na libulu.
5 Boyemba banzembo mpo na lokumu ya Yawe,
bino babulami na Ye ;
bokumisa Kombo na Ye ya bule.
6 Pamba te kanda makasi na Ye ewumelaka
mpo na mwa tango moke,
kasi ngolu na Ye ewumelaka seko na seko ;
kolela ekoki kowumela kino na pokwa,
kasi kosepela ekokota na tongo.
7 Tango nazalaki na kimia, nalobaki :
« Nakotikala kokweya te. »
8 Yawe, tango osalelaki ngai ngolu,
olendisaki ngomba na ngai ;
kasi tango obombelaki ngai elongi,
nabungisaki elikya.
9 Yawe, nabelelaki Yo ;
nabelelaki Yawe mpo na kosenga lisungi :
10 « Litomba nini ezali soki nakufi,
soki nakiti na libulu ?
Boni, putulu ekokumisa Yo ?
Boni, ekosakola boyengebene na Yo ?
11 Yawe, yoka ngai mpe salela ngai ngolu ;
Yawe, zala lisungi na ngai. »
12 Obongoli kolela na ngai, okomisi yango mabina ;
olongoli mokumba na ngai mpe olatisi ngai esengo,
13 mpo ete molimo na ngai ekumisa Yo na banzembo,
kasi navanda nye te.
Yawe, Nzambe na ngai, nakokumisa Yo