Link to home pageLanguagesLink to all Bible versions on this site
Nzembo 134
Bokumisa Yawe
1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Nkolo.
Bopambola Yawe, bino nyonso, basali ya Nkolo,
oyo botelemaka na butu kati na Ndako ya Nkolo.
 
2 Botombola maboko na bino na ngambo ya Esika ya bule
mpe bopambola Yawe !
3 Tika ete Yawe apambola bino, wuta na Siona,
Ye oyo asala likolo mpe mabele !

<- Banzembo 133Banzembo 135 ->