Nzembo 13
Kobanga mpe kolikya
1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.
2 Yawe, kino tango nini okobosana ngai mpo na libela ?
Kino tango nini okobomba elongi na Yo mpo ete namona Yo te ?
3 Kino tango nini nakozala mawa-mawa
kati na motema na ngai
mpe nakomitungisa mikolo nyonso ?
Kino tango nini monguna na ngai akolonga ngai ?
4 Yawe, Nzambe na ngai, tala mpe yanola ngai.
Sala ete miso na ngai emona malamu ;
soki te, nakokufa,
5 bongo monguna na ngai akoloba :
« Nalongi ye, »
mpe bayini na ngai bakosepela soki nakweyi.
6 Kasi ngai, natie elikya na ngai kati na bolingo na Yo,
mpe motema na ngai ezali kosepela kati na lobiko na Yo.
Nakoyemba mpo na lokumu ya Yawe,