Link to home pageLanguagesLink to all Bible versions on this site
Nzembo 125
Kimia ya solo
1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Yawe.
Bato oyo batiaka elikya kati na Yawe
bazali lokola ngomba Siona oyo eninganaka te,
oyo epikama mpo na libela.
2 Ndenge bangomba ezingeli Yelusalemi,
ndenge wana mpe Yawe azingeli bato na Ye,
kobanda sik’oyo kino libela na libela.
3 Bokonzi ya mabe ekowumela te na etuka ya bato ya sembo,
mpo ete basangana te na mabe.
 
4 Yawe, zala malamu mpo na bato malamu
mpe mpo na bato oyo bazali alima na mitema !
5 Kasi tika ete Yawe abengana
bato ya kilikili elongo na bato ya misala mabe !
 
Tika ete kimia ezala na Isalaele !

<- Banzembo 124Banzembo 126 ->