Link to home pageLanguagesLink to all Bible versions on this site
Nzembo 114
Tango Isalaele abimaki wuta na Ejipito
1 Tango Isalaele abimaki wuta na Ejipito,
tango libota ya Jakobi elongwaki
na ekolo ya bapaya,
2 Yuda ekomaki Esika ya bule ya Yawe,
mpe Isalaele ekomaki mabele na Ye.
 
3 Ebale monene emonaki yango mpe ekimaki,
mayi ya Yordani ezongaki na sima,
4 bangomba epumbwaki lokola bameme,
bangomba mike epumbwaki lokola bana ya ntaba.
 
5 Ebale monene, nini ezalaki kati na yo
mpo ete okima ?
Yordani, mpo na nini ozongaki na sima ?
6 Bino bangomba, mpo nini bopumbwaki
lokola bameme ?
Bongo bino bangomba mike, mpo na nini bopumbwaki
lokola bana ya ntaba ?
 
7 Mokili, lenga liboso ya Yawe,
liboso ya Nzambe ya Jakobi,
8 oyo abongolaka libanga monene liziba,
mpe libanga etima.

<- Banzembo 113Banzembo 115 ->