Nzembo 112
Bolamu ya bayengebene
1 Bokumisa Yawe !
Esengo na moto oyo atosaka Yawe
mpe asepelaka makasi na mibeko na Ye.
2 Bana na ye bakozala bato na nguya
kati na mokili ;
ekeke ya bato ya sembo ekopambolama.
3 Ndako na ye ezali na bokolongono
mpe na bomengo,
mpe bosembo na ye ewumelaka mpo na seko.
4 Pole engengaka kati na molili
mpo na bato ya alima,
mpo na moto oyo alimbisaka baninga,
ayokelaka bato mawa mpe azali sembo.
5 Esengo na moto oyo
ayokelaka bato mawa mpe adefisaka,
mpe asalaka misala na ye kolanda bosembo.
6 Solo, aninganaka ata moke te.
Bakanisaka misala ya moto ya sembo tango nyonso.
7 Abangaka basango ya mabe te ;
motema na ye ezali na kimia,
atiaka elikya na ye kati na Yawe.
8 Motema na ye eninganaka te,
abangaka te kino akomona banguna na ye
kozwa etumbu.
9 Akabelaka babola na motema ya esengo ;
bosembo na ye ewumelaka libela na libela,
lokumu na ye ekitaka te.
10 Moto mabe amonaka yango
mpe asilikaka na zuwa,
aliaka minu mpe alembaka nzoto.