Link to home pageLanguagesLink to all Bible versions on this site
Nzembo 100
Yawe asanzolamaka kati na bato na Ye
1 Nzembo ya kozongisa matondi.
Bino nyonso bato ya mokili mobimba,
boganga na esengo epai na Yawe !
2 Bosalela Yawe na esengo,
mpe boya liboso na Ye na banzembo ya esengo.
 
3 Boyeba ete Yawe nde azali Nzambe ;
Ye nde asala biso, mpe tozali bato na Ye.
Solo, tozali bato na Ye mpe etonga oyo aleisaka.
 
4 Bokota na bikuke na Ye na kozongisa matondi,
bokota na lopango na Ye na kokumisa.
Bosanzola Ye, bopambola Kombo na Ye.
5 Pamba te Yawe azali malamu ;
bolingo na Ye ewumelaka seko na seko,
mpe boyengebene na Ye, libela na libela.

<- Banzembo 99Banzembo 101 ->