7 Kasi makambo oyo nazalaki komona ete ezali na tina mpo na ngai, nakomi sik’oyo komona yango pamba mpo na Klisto. 8 Kaka yango te, nazali kutu komona makambo nyonso lokola eloko pamba likolo ya bolamu oyo eleki monene : koyeba Yesu-Klisto, Nkolo na ngai. Ezali mpo na Ye nde ngai nandimaki kobungisa makambo wana nyonso mpe nazali komona yango lokola bisanza, mpo ete nakoka kozwa Klisto 9 mpe bakuta ngai kati na Ye. Nakomi moto ya sembo mpo ete nandimeli Klisto : Nzambe akomisi ngai moto ya sembo na nzela ya kondima. Ezali lisusu te na nzela ya kotosa Mibeko ndenge nazalaki kokanisa kala. 10 Posa monene ya motema na ngai ezali : koyeba Klisto, koyeba nguya ya lisekwa na Ye, kosangana na pasi na Ye, kokokana na Ye kati na kufa na Ye 11 na elikya ete ngai mpe nakosekwa kati na bakufi.
12 Nalingi koloba te ete nasili kozwa biloko oyo nyonso to mpe nasili kokoma moto ya kokoka, kasi nazali nde kopota mbangu mpo na kozwa yango, pamba te Yesu-Klisto asila mpe kozwa ngai.
13 Bandeko, nazali kokanisa te ete nasili kozwa yango ; kasi nasalaka likambo moko : nabosanaka makambo nyonso oyo esili koleka, mpe namipesaka mpo na makambo oyo ezali liboso. 14 Boye nazali kopota mbangu kino nakoma na suka mpo na kozwa mbano oyo Nzambe abenga ngai mpo na yango wuta na Likolo kati na Yesu-Klisto.
15 Biso nyonso oyo tokola na Molimo, tosengeli kokanisa ndenge wana. Mpe soki ezali na likambo oyo na tina na yango bozali kokanisa ndenge mosusu, Nzambe akososolisa bino. 16 Nzokande, na esika oyo tosili kokoma, totambola nzela moko.
17 Bandeko, bino nyonso bolanda ndakisa na ngai mpe bomekola ezaleli ya bato oyo bazali kotambola lokola biso. 18 Pamba te ndenge nazalaki koyebisa bino yango mbala na mbala mpe, sik’oyo, nazali lisusu koyebisa bino yango na kolela, bato mingi bazali kotambola lokola banguna ya ekulusu ya Klisto. 19 Suka na bango ezali libebi ; pamba te nzambe na bango ezali libumu na bango, lokumu na bango ezali kati na makambo oyo eyokisaka bango soni, mpe makanisi na bango elukaka kaka biloko ya mokili. 20 Kasi biso, mboka na biso ezali kati na Likolo, mpe tozali kozela na posa makasi Mobikisi na biso, Nkolo Yesu-Klisto, oyo akowuta na Likolo. 21 Ye nde akobongola nzoto na biso ya putulu mpo na kokomisa yango nzoto ya nkembo, na nzela ya nguya na Ye ya kotia biloko nyonso na se ya bokonzi na Ye.
<- Bafilipi 2Bafilipi 4 ->