5 Boye, na etinda ya Yawe, Moyize epesaki mitindo oyo epai ya bana ya Isalaele : « Makambo oyo libota ya bakitani ya Jozefi balobi ezali na nzela. 6 Tala liloba oyo Yawe alobaki mpo na bana basi ya Tselofikadi : ‹ Bakoki solo kobalana na mibali nyonso oyo bango balingi, kasi ezala kaka kati na mibali ya libota ya tata na bango. 7 Pamba te libula moko te kati na Isalaele ekoki kolongwa na libota moko mpo na kokende na libota mosusu ; moto nyonso ya Isalaele asengeli kobatela mabele ya libota oyo azwaki lokola libula wuta na bakoko na ye. 8 Mwana mwasi nyonso kati na bikolo ya Isalaele oyo akozwa mabele lokola libula asengeli kobalana kaka na mobali ya libota ya tata na ye mpo ete moto nyonso ya Isalaele azwa libula ya tata na ye. 9 Libula moko te ekoki kolongwa na libota moko mpo na kokende na libota mosusu, pamba te libota moko na moko ya Isalaele esengeli kobatela mabele oyo esili kozwa lokola libula. › »
10 Boye, bana basi ya Tselofikadi basalaki ndenge kaka Yawe atindaki na nzela ya Moyize. 11 Bana basi ya Tselofikadi : Mala, Tiritsa, Ogila, Milika mpe Noa ; babalanaki na bandeko na bango, na ngambo ya libota ya tata na bango. 12 Babalanaki kati na etuka ya bakitani ya Manase, mwana mobali ya Jozefi, mpe libula na bango etikalaki na libota mpe etuka ya tata na bango.