1 Balami alobaki na Balaki : « Tongela ngai bitumbelo sambo awa mpe bongisela ngai bangombe ya mibali mpe bameme ya mibali sambo. »
2 Balaki asalaki ndenge Balami alobaki, mpe bango mibale babonzaki bangombe ya mibali mpe bameme ya mibali wana na etumbelo moko na moko. 3 Alobaki na Balaki : « Telema awa, pembeni ya mbeka na yo, bongo ngai napusani mwa mosika. Tango mosusu Yawe akoya kokutana na ngai, bongo nakoyebisa yo makambo nyonso oyo akolakisa ngai. »
Balami akendeki likolo ya ngomba moko ya mokuse mpe ezanga matiti. 4 Nzambe akutanaki na Balami, mpe Balami alobaki :
— Nabongisaki bitumbelo sambo ; mpe na etumbelo moko na moko, nasili kobonza ngombe ya mobali mpe meme ya mobali moko.
5 Yawe atiaki maloba na monoko ya Balami mpe alobaki :
— Zonga epai ya Balaki mpe yebisa ye maloba oyo.
6 Bongo Balami azongaki epai ya Balaki mpe akutaki ye atelemi pembeni ya mbeka na ye, elongo na bakambi nyonso ya Moabi. 7 Boye, Balami akomaki koloba maloba oyo :
— Boni, naloba te maloba oyo Yawe atie na monoko na ngai ?
Balami apamboli Isalaele mpo na mbala ya mibale
13 Balaki alobaki na Balami :
— Yaka elongo na ngai esika mosusu, epai okoki komona bango ; okomona bango nyonso te, kasi kaka ndambo. Mpe wuta na esika yango, lakela bango mabe mpo na ngai.
14 Boye, Balaki amemaki Balami na elanga ya Tsofimi, na songe ya ngomba Pisiga, mpe atongaki kuna bitumbelo sambo mpe abonzaki bangombe ya mibali mpe bameme ya mibali wana na etumbelo moko na moko.
15 Balami alobaki na Balaki :
— Telema awa, pembeni ya mbeka na yo, wana ngai nakopusana mwa mosika mpo na kokutana na ye.
16 Yawe akutanaki na Balami, atiaki maloba na monoko na ye mpe alobaki :
— Zonga epai ya Balaki mpe yebisa ye maloba oyo.
17 Bongo, Balami azongaki epai ya Balaki mpe akutaki ye atelemi pembeni ya mbeka na ye, elongo na bakambi nyonso ya Moabi. Balaki atunaki ye :
— Yawe alobi nini ?
18 Bongo Balami akomaki koloba maloba oyo :
« Balaki, telema mpe yoka !
Mwana mobali ya Tsipori, yoka ngai malamu !
19 Nzambe azali moto te mpo ete akosa,
azali mpe mwana ya moto te mpo ete akoka kobongola makanisi na Ye.
Boni, akoki solo koloba mpe kosala eloko moko te ?