2 Nzokande esika yango ezalaki na mayi ya komela te mpo na lisanga ya Isalaele, mpe bato basanganaki mpo na kotombokela Moyize mpe Aron. 3 Baswanisaki Moyize mpe balobaki : « Elingaki kozala malamu soki tokufaki na biso tango bandeko na biso bakufaki liboso ya Yawe ! 4 Mpo na nini omemaki lisanga ya Yawe na esobe oyo ? Ezali mpo ete biso mpe bibwele na biso tokufa awa ? 5 Mpo na nini obimisaki biso na Ejipito mpe omemi biso na esika oyo ya pasi, esika oyo bakoki kutu kolona ata eloko moko te, esika oyo ezanga ata mbuma ya figi to ya vino to mpe ya grenade, esika oyo ezanga kutu ata mayi ya komela ? »
6 Moyize mpe Aron babimaki kati ya lingomba mpe bakendeki na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani, bakweyaki elongi kino na mabele, mpe nkembo ya Yawe ebimelaki bango.
7 Yawe alobaki na Moyize : 8 « Zwa lingenda na yo ; bongo elongo na Aron, ndeko na yo ya mobali, bosangisa lisanga mobimba esika moko. Boloba na libanga wana na miso na bango, mpe ekobimisa mayi wuta na yango. Okobimisa mayi na libanga mpo ete bato ya lisanga mobimba bakoka komela elongo na bibwele na bango. »
9 Moyize azwaki lingenda oyo ezalaki liboso ya Yawe, ndenge kaka Yawe atindaki ye. 10 Ye mpe Aron basangisaki lisanga ya bato esika moko liboso ya libanga, mpe Moyize alobaki na bango : « Boyoka, bino batomboki, tokoki kobimisela bino mayi na libanga oyo ? »
11 Moyize atombolaki loboko na ye mpe abetaki lingenda na ye na libanga mbala mibale. Mayi ebimaki ; bongo lisanga mobimba elongo na bibwele na bango bamelaki.
12 Kasi Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : « Lokola bondimeli Ngai te mpe bopesi lokumu na bosantu na Ngai te na miso ya bana ya Isalaele, bokokotisa lisusu lingomba oyo te na mokili oyo napesi bango. »
13 Ezalaki mayi ya Meriba epai wapi bana ya Isalaele baswanaki na Yawe, mpe epai wapi Yawe alakisaki bosantu na Ye kati na bango.
18 Kasi mokonzi ya Edomi azongiselaki ye :
19 Bana ya Isalaele bazongiselaki ye :
20 Azongiselaki bango lisusu :
27 Moyize asalaki ndenge kaka Yawe atindaki : bamataki likolo ya ngomba Ori na miso ya lisanga mobimba. 28 Moyize alongolaki Aron bilamba mpe alatisaki yango Eleazari, mwana na ye ya mobali. Mpe Aron akufa kuna na likolo ya ngomba. Boye, Moyize mpe Eleazari bakitaki ngomba ; 29 mpe tango lingomba mobimba eyokaki sango ete Aron asilaki kokufa, bato nyonso ya Isalaele basalelaki ye matanga ya mikolo tuku misato.
<- Mitango 19Mitango 21 ->