9 Moto ya peto akokamata putulu ya ngombe mpe akotia yango na libanda ya molako na esika ya peto epai wapi bana ya Isalaele bakobatela yango mpo na kobongisa mayi ya bopetolami ; ezali mbeka mpo na masumu. 10 Moto oyo akozwa putulu ya ngombe akosukola mpe bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa. Ekozala mobeko ya libela na libela mpo na bana ya Isalaele mpe mpo na mopaya oyo avandi kati na bango.
11 Moto nyonso oyo akosimba ebembe ya moto, ata mokufi yango azalaki nani, akozala mbindo mikolo sambo. 12 Soki amipetoli na mayi na mokolo ya misato mpe ya minei, akokoma peto ; soki te, akozala kaka mbindo. 13 Soki amipetoli te sima na ye kosimba ebembe ya moto, abebisi bosantu ya Mongombo ya Yawe. Basengeli kolongola ye na Isalaele, pamba te basopeli ye te mayi ya bopetoli ; boye akozala kaka mbindo, mbindo na ye ekokangama ye na nzoto.
14 Tala mobeko oyo ebongi na kosalela soki moto akufi kati na ndako ya kapo : bato nyonso oyo bakokota na ndako ya kapo mpe ba-oyo bakomizalela na kati bakozala mbindo mikolo sambo. 15 Sani nyonso ya kofungwama oyo ekozala na mofinuku te na likolo ekozala mbindo. 16 Moto nyonso oyo asimbi kati na bilanga ebembe ya moto oyo akufi mpo ete moninga na ye moto abomi ye to akufi na liwa nyonso kaka to mpe asimbi mikuwa ya moto to kunda, akozala mbindo mikolo sambo. 17 Mpo na kopetola moto oyo akomi mbindo, bakokamata putulu ya ngombe ya mwasi oyo batumbi na moto lokola mbeka mpo na masumu, bakotia yango na sani mpe bakosopela yango mayi ya etima. 18 Moto oyo azali mbindo te akokamata etape ya izope mpe akotia yango kati na mayi, bongo akosalela yango mpo na kobwaka mayi na ndako ya kapo epai wapi moto akufi, na bisalelo mpe na banzoto ya bato nyonso oyo bazalaki kati na ndako yango ; akosala mpe bongo mpo na moto oyo asimbaki mikuwa, ebembe ya moto oyo moninga na ye moto abomaki to akufaki na liwa nyonso kaka to mpe mpo na moto oyo asimbaki kunda. 19 Na mokolo ya misato mpe ya sambo, moto oyo azali mbindo te akobwakela moto ya mbindo. Bongo na mokolo ya sambo, akopetola ye. Moto oyo bapetoli akosukola bilamba na ye mpe akomisukola nzoto na mayi ; boye na pokwa, akokoma peto.
20 Kasi soki moto oyo amikomisaki mbindo amipetoli, bakolongola ye kati na lisanga ; pamba te akomisi mbindo Esika ya bule ya Yawe. Mpe lokola basopeli ye te mayi ya bopetoli na nzoto, akozala mbindo. 21 Ekozala mpo na bango mobeko ya libela na libela.