4 Boye, Nganga-Nzambe Eleazari alokotaki bambabola nyonso ya bronze oyo bato oyo bazikaki na moto bamemaki, mpe atutaki yango na marto mpo na kotia yango likolo ya etumbelo ; 5 ndenge Yawe atindaki ye, na nzela ya Moyize. Yango ekozala lokola ekaniseli mpo na bana ya Isalaele ete moto moko te, moto oyo abulisama te, moto oyo azali mopaya liboso ya bakitani ya Aron, akoki koya kotumba malasi ya ansa liboso ya Yawe, noki te akokoma lokola Kore mpe bato oyo balandaki ye.
7 Kasi tango lisanga mobimba esanganaki mpo na kotelemela Moyize mpe Aron, babalukaki na ngambo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpe mbala moko lipata ezipaki yango mpe nkembo na Yawe emonisamaki. 8 Boye, Moyize mpe Aron bakendeki liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani 9 mpe Yawe alobaki na Moyize : 10 « Bokende mosika ya lisanga oyo mpo ete nasilisa bango kaka na mbala moko. »
12 Aron asalaki ndenge kaka Moyize alobaki, mpe akimaki mbangu na kati-kati ya lisanga. Nzokande, etumbu emibandelaki kosala mosala na yango na kati-kati ya bato, kasi Aron abonzaki malasi ya ansa mpe asalaki mosala ya bolimbisi masumu mpo na bango. 13 Atelemaki na kati-kati ya bato oyo bazalaki na bomoi mpe oyo bazalaki ya kokufa mpe etumbu esilaki. 14 Nzokande, bato nkoto zomi na minei na nkama sambo bakufaki na etumbu wana, bakisa oyo bakufaki likolo ya Kore. 15 Bongo, Aron azongaki epai ya Moyize na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, pamba te etumbu esilaki.
21 Moyize ayebisaki bana ya Isalaele, mpe bakambi na bango bapesaki ye mangenda zomi na mibale, lokola lingenda moko mpo na mokambi ya libota moko na moko, lingenda ya Aron mpe ezalaki kati na mangenda wana. 22 Moyize atiaki mangenda nyonso liboso ya Yawe, kati na Ndako ya kapo ya Litatoli. 23 Mokolo oyo elandaki, Moyize akotaki na Ndako ya kapo ya Litatoli, bongo amonaki ete lingenda ya Aron, oyo ezalaki kolakisa ndako ya Levi, ebimisaki mito ya etape, ebotaki bafololo mpe ezalaki na bambuma ya amande ya kotela. 24 Moyize abimisaki mangenda nyonso longwa na liboso ya Yawe mpe amemaki yango na miso ya bato nyonso ya Isalaele. Bamonaki yango mpe moto na moto azwaki lingenda na ye.
25 Yawe alobaki na Moyize : « Zongisa lingenda ya Aron liboso ya Sanduku ya Litatoli mpo ete ebombama lokola elembo ya kotomboka na bango. Boye, okosukisa koyimayima na bango mpo na Ngai mpo ete bakufa te. »
26 Moyize asalaki ndenge kaka Yawe atindaki ye.
27 Bana ya Isalaele balobaki na Moyize : « Tokufi na biso, tobebi na biso, biso nyonso, tobebi na biso ! 28 Moto nyonso oyo akopusana pembeni ya Mongombo na Yawe akokufa. Boni, biso nyonso tokufa ? »
<- Mitango 16Mitango 18 ->