8 Bana mibali ya Aron, Banganga-Nzambe, bango nde bakobanda kobeta bakelelo yango. Ekozala mobeko ya libela mpo na bino mpe bakitani na bino.
9 Tango, kati na mokili na bino moko, bokokende na bitumba mpo na kotelemela monguna oyo azali konyokola bino, bokobeta bakelelo na bino makasi. Boye, Yawe, Nzambe na bino, akokanisa bino mpe akokangola bino na maboko ya banguna na bino. 10 Mpe lisusu, na batango na bino ya kosepela, na bafeti na bino oyo ekatama mpe ya ebandeli ya sanza, bokobeta bakelelo mpo na kobonza mbeka na bino ya kotumba mpe ya boyokani. Yango ekozala ekaniseli mpo na bino na miso ya Nzambe na bino. Nazali Yawe, Nzambe na bino. »
17 Bongo bakabolaki Mongombo na biteni-biteni. Bakitani ya Gerishoni mpe ya Merari nde bamemaki yango mpe bakendeki. 18 Mampinga ya molako ya Ribeni elandaki na sima mpo na kotambola. Elitsuri, mwana mobali ya Shedewuri, nde azalaki mokonzi na bango. 19 Shelumieli, mwana mobali ya Tsurishadayi, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Simeoni. 20 Eliazafi, mwana mobali ya Deweli, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Gadi.
21 Sima, bato ya Keati bakendeki mpe bamemaki biloko ya bule. Balevi mosusu bazalaki kotonga Mongombo liboso ete bakoma. 22 Mampinga ya molako ya Efrayimi elandaki mpe na sima mpo na kotambola. Elishama, mwana mobali ya Amiwudi, nde azalaki mokonzi na bango. 23 Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Manase. 24 Abidani, mwana mobali ya Gideoni, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Benjame.
25 Boye, mpo na kosukisa, mampinga ya libota ya Dani mpe elandaki na sima mpo na kotambola na se ya bendele na bango. Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi, nde azalaki mokonzi na bango. 26 Pagieli, mwana mobali ya Okirani, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Aseri ; 27 mpe Akira, mwana mobali ya Enani, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Nefitali. 28 Wana nde ezalaki molongo oyo mampinga ya bana ya Isalaele ezalaki kotambola na yango.
30 Obabi azongiselaki ye :
31 Kasi Moyize alobaki :
33 Boye, balongwaki na ngomba ya Yawe mpe batambolaki mikolo misato ya mobembo. Sanduku ya Boyokani ya Yawe etambolaki liboso na bango na mobembo oyo ya mikolo misato mpo na kolukela bango esika ya kopema. 34 Na moyi, lipata na Yawe ezalaki likolo na bango, na tango bazalaki kolongola molako.
35 Tango nyonso Sanduku ezalaki kokende, Moyize azalaki koloba :
36 Mpe tango nyonso lipata ezalaki kopema, azalaki koloba :