1 Sima na Yesu kolongwa na ndako yango, azongaki elongo na bayekoli na Ye, na engumba epai wapi abotama. 2 Wana mokolo ya Saba ekokaki, Yesu akomaki koteya kati na ndako ya mayangani.
4 Yesu alobaki na bango : « Ezali kaka kati na ekolo na ye, kati na libota na ye mpe kati na ndako na ye nde mosakoli azwaka lokumu te. »
5 Alongaki te kosala bikamwa na esika yango, kasi abikisaki kaka mwa ndambo ya babeli oyo atielaki maboko. 6 Boye, akamwaki mingi penza bozangi kondima na bango.
12 Bantoma bakendeki mpe bateyaki bato ete babongola mitema. 13 Bazalaki kobengana milimo mabe ebele mpe kobikisa babeli mingi na kopakola bango mafuta.
14 Mokonzi Erode ayokaki sango na tina na Yesu, pamba te Kombo na Ye eyebanaki makasi.
15 Bato mosusu bazalaki koloba : « Ezali Eliya ! »
16 Kasi tango Erode azalaki koyoka maloba wana nyonso, azalaki komilobela : « Ezali Yoane oyo nakataki moto nde asekwi kati na bakufi ! »
17 Pamba te Erode amipeselaki mitindo ete bakanga Yoane minyololo mpe babwaka ye kati na boloko ; asalaki bongo mpo na kosepelisa Erodiade, mwasi ya Filipo, ndeko na ye, oyo ye Erode abalaki.
18 Yoane azalaki koloba na Erode : « Ozali na ndingisa te ya kosangisa nzoto na mwasi ya ndeko na yo. »
19 Erodiade akangelaki Yoane kanda kati na motema mpe azalaki koluka nzela ya kobomisa ye, kasi azalaki kokoka te, 20 pamba te Erode azalaki kobanga Yoane, wana ayebaki ete Yoane azali moto ya sembo mpe mosantu, mpe azalaki kobatela ye. Tango nyonso oyo Erode azalaki koyoka Yoane koloba, azalaki komitungisa mingi ; nzokande azalaki kaka kosepela koyoka ye.
21 Nzokande, na mokolo ya kosepela mbotama ya Erode, Erodiade akutanaki na libaku ya kokokisa mokano na ye. Na mokolo yango, Erode asalaki feti monene mpe abengisaki bakalaka, bakonzi minene ya basoda mpe bato ya lokumu ya Galile. 22 Mwana mwasi ya Erodiade akotaki mpe abinaki, asepelisaki Erode mpe bato oyo abengisaki na feti. Mokonzi alobaki na mwana mwasi :
23 Mpe alapaki kutu ndayi epai na ye :
24 Mwana mwasi abimaki mpe akendeki kotuna toli epai ya mama na ye :
25 Mbala moko, mwana mwasi azongaki na lombangu epai ya mokonzi mpe alobaki na ye :
26 Mokonzi ayokaki mawa mingi na motema, kasi mpo na ndayi oyo alapaki mpe mpo na bato oyo abengisaki na feti, aboyaki kopimela ye yango. 27 Mbala moko, mokonzi atindaki moko kati na bakengeli na ye ete amema moto ya Yoane. Mokengeli yango akendeki na boloko, akataki moto ya Yoane, 28 amemaki yango, na sani ; apesaki yango epai ya mwana mwasi, mpe mwana mwasi apesaki yango epai ya mama na ye. 29 Tango bayekoli ya Yoane bayokaki sango yango, bayaki kozwa nzoto na ye mpe batiaki yango kati na kunda moko.
30 Tango bantoma bazongaki, basanganaki pene ya Yesu mpe bayebisaki Ye makambo nyonso oyo bawutaki kosala mpe nyonso oyo bateyaki.
31 Boye, lokola bato mingi bazalaki koya mpe kozonga, mpe bazalaki kozwa ata tango te ya kolia, Yesu alobaki na bango : « Boya elongo na Ngai, na esika oyo ebombama mpe bopema mwa moke. »
32 Bakendeki na bwato, na esika oyo ebombama.
33 Kasi bato ebele oyo bamonaki bango kokende, basosolaki ete ezali bango. Boye balandaki bango mbangu na makolo longwa na bingumba nyonso mpe bakomaki liboso na bango, na esika oyo bazalaki kokende. 34 Tango Yesu akitaki wuta na bwato mpe amonaki ebele ya bato penza, ayokaki mawa makasi mpo na bango, pamba te bazalaki lokola bameme oyo ezangi mobateli. Boye, abandaki koteya bango makambo ebele.
35 Lokola ngonga epusanaki makasi, bayekoli na Ye bapusanaki pene na Ye mpe balobaki na Ye :
37 Kasi Yesu azongisaki :
38 Yesu atunaki bango :
39 Yesu apesaki bango mitindo ete bakabola bato nyonso na masanga mpe bavandisa bango na matiti ya mobesu. 40 Boye, batandamaki na milongo ya bato nkama moko mpe ya bato tuku mitano. 41 Yesu akamataki mapa mitano mpe bambisi mibale yango, atombolaki miso na Ye na likolo mpe azongisaki matondi epai ya Nzambe ; akataki mapa yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai na bato. Akabolaki lisusu bambisi nyonso mibale epai ya bango nyonso. 42 Bato nyonso baliaki mpe batondaki. 43 Bongo bayekoli balokotaki biteni ya mapa mpe ya bambisi, oyo etikalaki ; mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale. 44 Bato oyo baliaki mapa yango bazalaki mibali pene nkoto mitano.
45 Mbala moko, Yesu atindaki bayekoli na Ye ete bamata na bwato mpe bakende liboso na Ye, na Betisaida, na ngambo mosusu ya ebale, wana Ye moko akozongisa bato. 46 Sima na Ye kozongisa bato yango, amataki na ngomba mpo na kosambela.
47 Wana ekomaki pokwa, bwato ekomaki na kati-kati ya ebale ; mpe Ye, Yesu, azalaki Ye moko na mokili, 48 amonaki bayekoli na Ye kobunda-bunda mpo na koluka nkayi, pamba te mopepe ezalaki kozongisa bango na sima. Wana tongo ekomaki pene ya kotana, Yesu atambolaki likolo ya mayi ya ebale mpo na kolanda bango, mpe alingaki kutu koleka bango. 49 Tango bayekoli bamonaki Yesu azali kotambola likolo ya mayi ya ebale, bakanisaki ete ezali elima, mpe bakomaki koganga. 50 Solo, bango nyonso bamonaki Ye, mpe somo makasi ekangaki bango.
51 Bongo amataki na bwato epai bayekoli bazalaki, mpe mopepe ekitaki. Bakamwaki mingi penza, 52 pamba te basosolaki te tina ya likamwisi ya mapa, mpo ete mayele na bango ezalaki ya kozipama.
53 Sima na bango kokatisa ebale, bakomaki na mabele ya Genezareti mpe bakangisaki bwato na bango na libongo. 54 Tango kaka bakitaki na bwato, bato basosolaki mbala moko Yesu. 55 Boye, bato bapotaki mbangu kati na etuka wana mobimba mpe bakomaki komema babeli, na tsipoyi, na bisika nyonso oyo bayokaki ete Yesu akomi kuna. 56 Na bisika nyonso oyo Yesu azalaki kokende, na bamboka, na bingumba to na bilanga, bazalaki komema babeli na bisika oyo bato ebele bakutanaka, mpe bazalaki kosenga na Yesu ete apesa babeli nzela ya kosimba ata singa ya songe ya elamba na Ye. Mpe bato nyonso oyo bazalaki kolonga kosimba yango bazalaki kobika na bokono na bango.
<- Malako 5Malako 7 ->