1 Wana etikalaki mikolo mibale mpo ete feti ya Pasika mpe feti ya Mapa ezanga levire ebanda, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koluka ndenge nini kokanga Yesu na mayele mpo na koboma Ye ; 2 pamba te balobaki : « Tosala yango te na tango ya feti, noki te bato bakotomboka. »
3 Lokola Yesu azalaki na Betani, na ndako ya Simona oyo azalaki moto na maba, mwasi moko akotaki, wana Yesu azalaki na mesa. Na maboko na ye, azalaki na molangi ya alibatre etonda na malasi ya nar, oyo basangisa na eloko mosusu te mpe ya motuya makasi ; afungolaki molangi yango mpe asopaki malasi yango na moto ya Yesu. 4 Kati na bato oyo bazalaki wana, bamosusu basilikaki mpe balobaki :
6 Kasi Yesu alobaki :
10 Bongo Yuda Isikarioti, moko kati na bantoma zomi na mibale, akendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpo na koteka Yesu epai na bango. 11 Tango bayokaki bongo, basepelaki makasi mpe balakaki kopesa ye mbongo. Boye, Yuda akomaki koluka libaku ya kokaba Yesu.
12 Na mokolo ya liboso ya feti ya Mapa ezanga levire, mokolo oyo bazalaki koboma mwana meme lokola mbeka ya Pasika, bayekoli batunaki Ye :
13 Bongo, kati na bayekoli na Ye, Yesu atindaki mibale ; alobaki na bango :
16 Tango bayekoli bakendeki, bakotaki na engumba mpe bakutaki makambo nyonso ndenge kaka Yesu ayebisaki bango. Bongo babongisaki bilei ya Pasika.
17 Tango pokwa ekomaki, Yesu ayaki elongo na bayekoli zomi na mibale. 18 Wana bazalaki na mesa mpe bazalaki kolia, Yesu alobaki :
19 Bayokaki mawa mingi, mpe bakomaki kotuna Ye, moko sima na moninga :
20 Yesu azongisaki :
22 Wana bazalaki kolia, Yesu azwaki lipa ; sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango, apesaki bango yango mpe alobaki :
23 Azwaki lisusu kopo ; mpe sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, apesaki bango yango, mpe bango nyonso bamelaki yango. 24 Bongo alobaki na bango :
26 Sima na yango, bayembaki banzembo ; bongo babimaki mpo na kokende na ngomba ya banzete ya olive.
27 Yesu alobaki na bango :
29 Petelo alobaki na Ye :
30 Yesu azongiselaki ye :
31 Kasi Petelo akobaki kotia monoko makasi, alobaki :
32 Tango bakomaki na esika oyo kombo na yango ezali Getisemane, Yesu alobaki na bayekoli na Ye :
33 Wana amemaki Petelo, Jake mpe Yoane, akomaki mawa-mawa mpe komitungisa ; 34 alobaki na bango :
35 Wana akendeki mwa mosika, amikitisaki na mabele mpe azalaki kosambela Nzambe mpo ete, soki ekoki kosalema, tango wana ya pasi ekende mosika na Ye. 36 Azalaki kobondela :
37 Bongo azongaki epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango balala pongi.
39 Akendeki lisusu mwa mosika mpe abondelaki kaka ndenge moko. 40 Azongaki lisusu epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango lisusu balala pongi, pamba te bayokaki pongi makasi mpe miso na bango ekomaki kilo. Bayebaki te eyano ya kopesa Ye.
41 Azongaki mpo na mbala ya misato, mpe alobaki na bango :
43 Wana Yesu azalaki nanu koloba, Yuda, moko kati na bayekoli zomi na mibale, akomaki elongo na bato ebele oyo basimbaki mipanga mpe banzete ; ezalaki bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato nde batindaki bango. 44 Moto oyo atekaki Yesu apesaki bango elembo moko : « Moto oyo ngai nakopesa beze, ezali nde ye ; bokokanga ye mpe bokomema ye na se ya bokengeli malamu. »
45 Tango kaka Yuda akomaki, akendeki epai ya Yesu mpe alobaki na Ye :
46 Mbala moko, basimbaki Yesu na makasi mpe bakangaki Ye. 47 Bongo moko kati na bato oyo bazalaki wana abimisaki mopanga na ye wuta na ebombelo na yango, abetaki yango mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe akataki ye litoyi.
48 Yesu alobaki na bango :
50 Bayekoli na Ye nyonso basundolaki Ye mpe bakimaki.
51 Nzokande, elenge mobali moko azalaki kolanda Yesu ; alataki liputa ya pamba. Mpe tango bakangaki ye, 52 asundolaki liputa mpe akimaki.
53 Bamemaki Yesu epai ya mokonzi ya Banganga-Nzambe epai wapi bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya bato mpe balakisi ya Mobeko, bango nyonso, basanganaki. 54 Petelo azalaki kolanda Yesu na mosika, kino kati na lopango ya ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ; avandaki kuna elongo na bakengeli, pene ya moto, mpe azalaki koyetola moto. 55 Nzokande bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda bazalaki koluka litatoli moko oyo ekobimisa polele mabe ya Yesu mpo ete bakoka kokatela Ye etumbu ya kufa, kasi bazalaki kozwa yango te ; 56 pamba te bato mingi bazalaki kokosela Ye makambo, kasi matatoli na bango ezalaki kokokana te.
57 Mpo na kaka kokosela Ye makambo, bato mosusu bazalaki kotelema na koloba : 58 « Toyokaki ye koloba : ‹ Ngai, nakobuka Tempelo oyo esalema na maboko ya bato ; mpe sima na mikolo misato, nakotonga Tempelo mosusu oyo ekosalema na maboko ya bato te. › »
59 Kasi atako bongo, litatoli na bango ezalaki kaka ya lokuta.
60 Mokonzi ya Banganga-Nzambe atelemaki kati na mayangani mpe apesaki Yesu motuna :
61 Kasi Yesu abatelaki kimia mpe apesaki ata eyano moko te.
62 Yesu azongisaki :
63 Bongo mokonzi ya Banganga-Nzambe apasolaki bilamba na ye mpe alobaki :
66 Wana Petelo azalaki na se, kati na lopango ya kati, mwasi mosali moko ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ayaki wana, 67 amonaki Petelo koyetola moto. Sima na ye kotala Petelo malamu, alobaki na ye :
68 Kasi Petelo awanganaki ; alobaki :
69 Tango mwasi mosali amonaki ye, alobaki lisusu na bato oyo bazalaki wana :
70 Petelo awanganaki lisusu.
71 Bongo Petelo abandaki kolapa ndayi esangana na bilakeli mabe :
72 Kaka na tango yango, soso elelaki mpo na mbala ya mibale. Bongo Petelo akanisaki maloba oyo Yesu alobaki na ye : « Liboso ete soso elela mbala mibale, okowangana Ngai mbala misato. » Mpe alelaki makasi.
<- Malako 13Malako 15 ->- a Eteni oyo ezali te kati na mikanda mosusu.