Malako
1 Tala ebandeli ya Sango Malamu ya Yesu-Klisto, Mwana na Nzambe, 2 kolanda ndenge ekomama kati na mokanda ya mosakoli Ezayi :
5 Bavandi nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi bazalaki kokende epai na ye ; bazalaki kotubela masumu na bango, mpe ye, azalaki kobatisa bango na ebale Yordani. 6 Yoane azalaki kolata elamba oyo basala na bapwale ya shamo mpe mokaba oyo basala na poso ya nyama, na loketo ; azalaki kolia mankoko mpe mafuta ya nzoyi. 7 Tala makambo oyo azalaki koteya bato : « Sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya ; ngai nabongi kutu te mpo na kogumbama liboso na Ye mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye. 8 Ngai nazali kobatisa bino na mayi, kasi Ye akobatisa bino kati na Molimo Mosantu. »
9 Na tango wana, Yesu ayaki wuta na Nazareti ya Galile, mpe Yoane abatisaki Ye na ebale Yordani. 10 Tango kaka abimaki na mayi, amonaki Likolo kofungwama mpe Molimo kokitela Ye lokola ebenga. 11 Mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo : « Ozali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Yo mingi ! »
12 Mbala moko, Molimo amemaki Yesu kati na esobe 13 epai wapi avandaki mikolo tuku minei mpe Satana azalaki komeka Ye. Azalaki kuna elongo na banyama ya zamba, mpe ba-anjelu bazalaki kopesa Ye bilei.
14 Tango babwakaki Yoane kati na boloko, Yesu akendeki na Galile epai wapi azalaki koteya Sango Malamu ya Nzambe. 15 Azalaki koloba : « Tango ekoki, mpe Bokonzi ya Nzambe ekomi pene. Bobongola mitema mpe bondima Sango Malamu. »
16 Mokolo moko, wana Yesu azalaki koleka pembeni ya ebale ya Galile, amonaki Simona mpe Andre, ndeko na ye. Bazalaki kobwaka monyama na ebale, pamba te bazalaki balobi mbisi. 17 Yesu alobaki na bango : « Bolanda Ngai, mpe nakokomisa bino balobi bato. »
18 Mbala moko, batikaki minyama na bango mpe balandaki Yesu. 19 Wana Yesu akobaki kotambola, amonaki na mosika Jake, mwana mobali ya Zebede, oyo azalaki elongo na Yoane, ndeko na ye ; bazalaki kobongisa minyama kati na bwato na bango. 20 Mbala moko, Yesu abengaki bango. Batikaki Zebede, tata na bango, kati na bwato elongo na basali na ye mpe balandaki Yesu.
21 Bongo Yesu elongo na bayekoli na Ye bakendeki na Kapernawumi. Na mokolo ya Saba, Yesu akotaki na ndako ya mayangani mpe abandaki koteya. 22 Bato bakamwaki makasi malakisi na Ye, pamba te ateyaki na bokonzi oyo balakisi ya Mobeko bazangaki.
23 Kaka na tango yango, ezalaki na moto moko, kati na ndako ya mayangani, oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe, azalaki koganga :
25 Yesu atelemelaki molimo mabe yango mpe apesaki yango mitindo :
26 Molimo mabe eningisaki moto yango makasi mpe ebimaki na koganga. 27 Bato nyonso bakamwaki makasi mpe bakomaki kotunana :
28 Mbala moko, sango na tina na Ye epanzanaki kati na etuka mobimba ya Galile.
29 Tango Yesu abimaki na ndako ya mayangani, akendeki elongo na Jake mpe Yoane na ndako ya Simona mpe Andre. 30 Nzokande, mama-bokilo ya Simona azalaki ya kolala mpo ete azalaki kobela fievele ; mbala moko, bapesaki Ye sango. 31 Boye apusanaki pene ya mama yango, asimbaki ye na loboko mpe atelemisaki ye ; fievele esilaki, mpe mama yango akomaki kobongisela bango bilei.
32 Wana moyi elalaki mpe pokwa eyaki, bamemelaki Yesu babeli nyonso mpe bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe. 33 Bato nyonso ya engumba bayaki kosangana liboso ya ekuke ya ndako ; 34 bongo Yesu abikisaki bato ebele oyo bazalaki na pasi ya ndenge na ndenge, abenganaki milimo mabe ebele mpe apekisaki yango koloba ; pamba te milimo mabe eyebi nani oyo Ye azali.
35 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, wana molili ezalaki nanu, Yesu alamukaki, abimaki libanda, akendeki na esobe epai wapi azalaki kaka Ye moko mpe akomaki kosambela. 36 Simona elongo na baninga na ye bakendeki koluka Yesu. 37 Tango bamonaki Ye, balobaki na Ye :
38 Kasi Ye azongiselaki bango :
39 Boye, atambolaki na Galile mobimba ; azalaki koteya na bandako na bango ya mayangani mpe kobengana milimo mabe. 40 Moto moko na maba apusanaki pene na Yesu, afukamaki mpe asengaki na Yesu :
41 Yesu ayokelaki ye mawa, atandaki loboko na Ye, asimbaki ye mpe alobaki :
42 Mbala moko, maba elongwaki na nzoto ya mobeli mpe akomaki peto. 43 Mbala moko, Yesu azongisaki ye mpe akebisaki ye :
45 Kasi tango kaka abimaki, abandaki koloba mpe kopanza sango. Mpo na yango, Yesu azalaki lisusu te kokoka kokota kati na bingumba na miso ya bato nyonso ; kasi akomaki kovanda na libanda ya bingumba, na bisika oyo ebombama. Nzokande, bato bazalaki kaka kowuta bipai na bipai mpo na koya epai na Ye.
Malako 2 ->