1 Tango Yesu amonaki ebele yango ya bato, amataki likolo ya ngomba mpe avandaki. Bayekoli na Ye bapusanaki pene na Ye, 2 mpe akomaki kopesa bango malakisi.
11 Esengo na bino tango bazali kofinga bino, tango bazali konyokola bino, mpe tango bazali kokosela bino makambo ya lolenge nyonso likolo na Ngai ! 12 Bosepela mpe bozala na esengo, pamba te lifuti na bino ezali monene kati na Likolo ; pamba te ezalaki mpe kaka ndenge wana nde banyokolaki basakoli oyo bazalaki liboso na bino.
13 Bozali mungwa ya mokili. Kasi soki mungwa ebungisi elengi na yango, ndenge nini bakokoka lisusu kozongisa elengi na yango ? Ezali lisusu na tina moko te ; etikali kaka eloko ya kobwaka mpe ya konyata.
14 Bozali pole ya mokili. Engumba oyo batongi na likolo ya ngomba ekoki kobombama te. 15 Moto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na se ya katini ; nzokande, atiaka yango na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete engengisa bato nyonso oyo bazali kati na ndako. 16 Yango wana, tika ete pole na bino engenga liboso ya bato, mpo ete bamona misala malamu na bino mpe bakumisa Tata na bino oyo azali kati na Likolo.
21 Boyokaki ete baloba na bakoko na biso : ‹ Okobomaka te. Moto nyonso oyo akoboma moninga na ye asengeli na kosambisama liboso ya basambisi. › 22 Kasi Ngai, nalobi na bino : Moto nyonso oyo akokangela ndeko na ye kanda akosamba na esambiselo liboso ya basambisi ; moto oyo akofinga ndeko na ye : ‹ zoba, › akosamba liboso ya Likita-Monene ; mpe oyo akoloba na ndeko na ye : ‹ moto ya liboma, › akobwakama kati na moto ya lifelo.
23 Soki ozali kokende kopesa makabo na yo liboso ya etumbelo, mpe ososoli ete ndeko na yo azwa yo na likambo, 24 tika makabo na yo liboso ya etumbelo mpe kende nanu koyokana na ndeko na yo wana ; sima na yango nde okoya kopesa makabo na yo.
25 Soki moto azwi yo na likambo, yokana na ye noki, wana bozali nanu na nzela ; soki te, akofunda yo epai ya mosambisi, mosambisi akokaba yo na maboko ya bakengeli, mpe bakengeli bakobwaka yo na boloko. 26 Nazali koloba na yo penza ya solo : okobima na boloko soki kaka ofuti niongo na yo nyonso.
27 Boyokaki ete baloba : ‹ Okosalaka ekobo te. › 28 Kasi Ngai, nalobi na bino : Mobali nyonso oyo atali mwasi na makanisi ya kolula ye, asili kosala na ye ekobo kati na motema na ye. 29 Yango wana, soki liso na yo ya ngambo ya mobali ekweyisaka yo na masumu, longola yango mpe bwaka yango mosika na yo ; pamba te eleki malamu mpo na yo kobungisa eteni moko ya nzoto, na esika ete nzoto na yo mobimba ebwakama na lifelo. 30 Soki mpe loboko na yo ya ngambo ya mobali ekweyisaka yo na masumu, kata yango mpe bwaka yango mosika na yo ; pamba te eleki malamu mpo na yo kobungisa eteni moko ya nzoto, na esika ete nzoto na yo mobimba ekende na lifelo.
31 Boyokaki lisusu ete baloba : ‹ Soki mobali akabwani na mwasi na ye, asengeli kopesa ye mokanda ya koboma libala. › 32 Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Mobali nyonso oyo alongoli mwasi na ye na libala, longola kaka soki mwasi yango akweyaki na ekobo, afungoleli ye nzela ya kosala kindumba ; mpe mobali oyo abali mwasi oyo balongola na libala asali mpe ekobo.
38 Boyokaki ete baloba : ‹ Liso mpo na liso, linu mpo na linu. › 39 Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Botelemelaka te moto mabe ; kutu soki abeti yo mbata na litama ya ngambo ya loboko ya mobali, pesa ye mpe litama ya ngambo ya loboko ya mwasi. 40 Soki moto alingi kofunda yo mpo na kozwa elamba na yo, pesa ye mpe kazaka na yo. 41 Soki moto atindi yo na makasi ete otambola kilometele moko, yo, tambola bakilometele mibale elongo na ye. 42 Pesa na moto oyo asengi yo, mpe koboya te kodefisa na moto oyo alingi kodefa epai na yo.
43 Boyokaki ete baloba : ‹ Linga moninga na yo mpe yina monguna na yo. › 44 Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Bolingaka banguna na bino mpe bosambelaka mpo na bato oyo banyokolaka bino. 45 Na ndenge wana nde bokozala bana ya Tata na bino, oyo azali kati na Likolo, pamba te abimisaka moyi mpo na bato malamu mpe mpo na bato mabe, mpe anokisaka mvula mpo na bato ya sembo mpe mpo na bato oyo bazali sembo te. 46 Soki bolingaka kaka bato oyo balingaka bino, lifuti nini bokozwa ? Boni, bafutisi mpako basalaka mpe bongo te ? 47 Soki bopesaka mbote kaka na bandeko mibali na bino, likambo nini ya kokamwa oyo bosalaka ? Boni, bapagano basalaka mpe bongo te ? 48 Bozala bato ya kokoka ndenge Tata na bino ya Likolo azali ya kokoka.
<- Matayo 4Matayo 6 ->