1 Molimo amemaki Yesu kati na esobe mpo ete Satana ameka Ye. 2 Sima na Ye kokila bilei mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei, ayokaki nzala. 3 Momeki ayaki epai na Ye mpe alobaki na Ye :
4 Yesu azongisaki :
5 Bongo, Satana amemaki Ye na engumba ya bule, atelemisaki Ye na songe ya Tempelo 6 mpe alobaki na Ye :
7 Yesu azongiselaki ye :
8 Satana amemaki Ye lisusu na likolo ya ngomba oyo eleki molayi mpe alakisaki Ye bokonzi nyonso ya mokili elongo na lokumu na yango ; 9 alobaki na Ye :
10 Yesu alobaki na ye :
11 Boye Satana atikaki Ye, mpe ba-anjelu bayaki kopesa Ye bilei.
12 Tango Yesu ayokaki ete babwaki Yoane Mobatisi kati na boloko, azongaki na Galile. 13 Kasi avandaki na Nazareti te ; akendeki nde kovanda na Kapernawumi oyo ezalaki pembeni ya ebale, kati na etuka ya Zabuloni mpe ya Nefitali, 14 mpo na kokokisa maloba oyo mosakoli Ezayi alobaki :
17 Wuta na tango wana, Yesu abandaki koteya : « Bobongola mitema na bino, pamba te Bokonzi ya Likolo ekomi pene ! »
18 Wana Yesu azalaki kotambola pembeni ya ebale ya Galile, amonaki bandeko mibali mibale : Simona oyo bazalaki kobenga Petelo, mpe Andre, ndeko na ye ; bazalaki kobwaka monyama na ebale, pamba te bazalaki balobi mbisi. 19 Yesu alobaki na bango : « Bolanda Ngai, mpe nakokomisa bino balobi bato. »
20 Mbala moko, batikaki minyama na bango mpe balandaki Yesu.
21 Tango alongwaki wana mpo na kokoba mobembo na Ye, amonaki lisusu bandeko mibali mibale : Jake, mwana mobali ya Zebede, mpe Yoane, ndeko na ye. Bazalaki kobongisa minyama kati na bwato na bango elongo na Zebede, tata na bango. Yesu abengaki bango ; 22 mpe, mbala moko, batikaki bwato mpe tata na bango, bongo balandaki Yesu.
23 Wana Yesu azalaki kotambola kati na Galile mobimba, azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani, kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Likolo, kobikisa bato na pasi mpe na bokono na bango nyonso. 24 Sango na Ye epanzanaki kati na Siri mobimba, mpe bato bazalaki komemela Ye babeli oyo bazalaki na bokono ya ndenge na ndenge mpe oyo bazalaki na mikakatano makasi : bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe, bato oyo bazalaki na bokono ya ndeke mpe bato oyo bazalaki na makolo mpe maboko ya kokufa ; mpe azalaki kobikisa bango. 25 Ebele ya bato bazalaki kolanda Ye ; bazalaki kowuta na Galile, na Dekapoli[a], na Yelusalemi, na Yuda mpe na etuka mobimba ya ngambo ya Yordani.
<- Matayo 3Matayo 5 ->- a Dekapoli ezalaki etuka ya bingumba zomi