1 Tango tongo etanaki, bakonzi nyonso ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato basalelaki Yesu likita mpo na kobomisa Ye. 2 Bakangaki Ye basinga, bamemaki Ye mpe bakabaki Ye na maboko ya moyangeli Pilato.
3 Tango Yuda oyo atekaki Yesu amonaki ete bakateli Yesu etumbu, ayokaki pasi mingi na motema mpe akendeki kozongisa mbongo wana ya bibende tuku misato epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato. 4 Alobaki na bango :
5 Yuda abwakaki mbongo yango kati na Tempelo, alongwaki wana mpe akendeki komidiembika.
6 Bakonzi ya Banganga-Nzambe balokotaki mbongo yango mpe balobaki :
7 Boye, basanganaki mpe bazwaki mokano ya kosomba, na mbongo yango, elanga ya mosali mbeki, mpe ya kokomisa yango lilita mpo na kokunda bapaya. 8 Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka elanga yango elanga ya makila.
9 Ezali ndenge wana nde maloba ya mosakoli Jeremi ekokisamaki : « Bakamataki mbongo ya bibende ya palata tuku misato, motuya oyo bato ya Isalaele bakataki mpo na ye, 10 mpe basombaki na yango elanga ya mosali mbeki ndenge Nkolo atindaki ngai. »
11 Yesu asambaki liboso ya moyangeli. Moyangeli atunaki Yesu :
12 Sima na yango, tango bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bafundaki Ye, azongisaki lisusu eloko moko te. 13 Bongo Pilato atunaki Ye :
15 Na feti nyonso ya Pasika, moyangeli azalaki na momesano ya kobimisa na boloko mokangami moko oyo bato bazalaki kopona. 16 Na tango wana, ezalaki na mokangami moko oyo ayebanaki mingi, kombo na ye ezalaki Yesu Barabasi.
17 Tango Pilato amonaki ebele ya bato basangani, atunaki bango :
18 Pilato ayebaki malamu ete ezali mpo na likunya nde bakabaki Yesu na maboko na ye. 19 Wana Pilato avandaki na esambiselo, mwasi na ye atindelaki ye maloba :
20 Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bandimisaki ebele ya bato ete basenga na makasi kobima ya Barabasi longwa na boloko, mpe komona ndenge bakoboma Yesu.
21 Moyangeli atunaki bango lisusu :
22 Pilato atunaki bango :
23 Pilato atunaki lisusu :
24 Tango Pilato amonaki ete akokoka lisusu kosala eloko te, mpe ete mobulu ya bato ezalaki komata se komata, azwaki mayi, asukolaki maboko na ye liboso ya bato na koloba :
25 Bato nyonso bazongisaki :
26 Pilato abimiselaki bango Barabasi ; mpe sima na kobetisa Yesu fimbu, apesaki Ye na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu.
27 Basoda ya moyangeli bakumbaki Yesu kati na esambiselo mpe basangisaki zingazinga na Ye lisanga mobimba ya basoda. 28 Balongolaki Ye bilamba, balatisaki Ye nzambala ya motane, 29 balatisaki Ye ekoti ya nzube na moto mpe basimbisaki Ye lingenda moke na loboko na Ye ya mobali ; bongo babandaki kofukama liboso na Ye mpo na kotiola Ye, na koloba : « Mbote, mokonzi ya Bayuda ! »
30 Bazalaki kobwakela Ye soyi, kokamata lingenda moke oyo basimbisaki Ye na loboko mpe kobeta Ye na moto. 31 Sima na bango kosakanela Ye, balongolaki Ye nzambala, balatisaki Ye bilamba na Ye mpe bakumbaki Ye mpo na kobaka Ye na ekulusu.
32 Wana bazalaki kobima na engumba, bakutanaki na moto moko ya Sirene, kombo na ye ezalaki Simona ; mpe bakangaki ye na makasi mpo ete amema ekulusu ya Yesu.
33 Tango bakomaki na esika oyo babengaka « Gologota, » oyo elingi koloba : esika ya mokuwa ya moto, 34 bapesaki Yesu masanga ya vino basangisa na mayi ya bololo mpo ete amela ; kasi sima na Ye komeka masanga yango, aboyaki komela yango. 35 Sima na bango kobaka Yesu na ekulusu, bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke ; 36 mpe bavandaki wana mpo na kokengela Ye.
37 Na likolo ya moto ya Yesu, batiaki makomi oyo mpo na kotalisa mpo nini bakatelaki Ye etumbu :
38 Babomi mibale ya bato babakamaki na ba-ekulusu elongo na Yesu : moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu ; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
39 Baleki nzela bazalaki kofinga Ye na koningisa mito na bango ; 40 bazalaki koloba : « Yo oyo okobuka Tempelo mpe okotonga yango lisusu na mikolo misato, mibikisa yo moko ! Soki ozali penza Mwana na Nzambe, kita longwa na ekulusu ! »
41 Bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko elongo na bakambi ya bato bazalaki mpe kotiola Yesu na koloba : 42 « Abikisaki bato mosusu, kasi ye moko akoki komibikisa te ! Azali mokonzi ya Isalaele ! Tika ete akita sik’oyo longwa na ekulusu, bongo tokondimela Ye. 43 Atiaka elikya na ye kati na Nzambe ; tika ete Nzambe akangola ye sik’oyo soki alingaka ye, pamba te azalaki koloba : ‹ Nazali Mwana na Nzambe. › »
44 Babomi bato oyo babakamaki na ba-ekulusu elongo na Yesu bazalaki mpe kofinga Ye ndenge wana.
45 Kobanda na ngonga ya midi kino na ngonga ya misato ya pokwa, molili ekotaki na mokili mobimba.
46 Pene na ngonga ya misato ya pokwa, Yesu agangaki :
47 Kati na bato oyo batelemaki wana, ndambo bayokaki Ye ; boye bakomaki koloba :
48 Mbala moko, moko kati na bango akendeki mbangu kokamata eponze moko, azindisaki yango na vino ya ngayi, atiaki eponze yango na songe ya mwa nzete mpe apesaki yango Yesu mpo ete amela. 49 Kasi bato mosusu balobaki :
50 Kasi Yesu agangaki lisusu makasi, mpe azongisaki molimo na Ye. 51 Kaka na tango yango, rido ya Tempelo epasukaki na biteni mibale, kobanda na likolo kino na se, mabele eninganaki, mabanga minene epasukaki, 52 bakunda efungwamaki, mpe banzoto ya basantu ebele oyo bakufa esekwaki : 53 ebimaki na bakunda mpe, sima na lisekwa ya Yesu, ekotaki kati na engumba ya bule epai wapi bato ebele bamonaki yango.
54 Tango mokonzi ya basoda ya Rome elongo na basoda oyo bazalaki kokengela Yesu bamonaki ndenge mabele eninganaki mpe nyonso oyo esalemaki, bayokaki somo makasi mpe balobaki :
55 Basi ebele bazalaki wana, bazalaki kotala na mosika ; balandaki Yesu longwa na Galile mpo na kosunga Ye. 56 Kati na basi yango, ezalaki na Mari, moto ya Magidala ; Mari, mama ya Jake mpe ya Jozefi ; mpe mama ya bana ya Zebede.
57 Tango pokwa ekomaki, mozwi moko ayaki ; kombo na ye ezalaki Jozefi, moto ya mboka Arimate ; ye mpe akomaki moyekoli ya Yesu. 58 Akendeki kosenga nzoto ya Yesu epai ya Pilato ; mpe Pilato apesaki mitindo ete bapesa ye yango. 59 Jozefi azwaki nzoto ya Yesu, alingaki yango na liputa ya lino ya peto 60 mpe atiaki nzoto yango kati na kunda moko ya sika, oyo atobolisaki ye moko kati na libanga moko ya monene. Mpe atindikaki libanga mosusu ya monene liboso ya ekotelo ya kunda yango, mpe azongaki. 61 Mari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari mosusu bavandaki wana, na ngambo mosusu ya kunda.
62 Mokolo oyo elandaki, mokolo oyo elandaki Mokolo ya kobongisa Saba, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo bakendeki epai ya Pilato 63 mpo na koloba na ye :
65 Pilato azongisaki :
66 Boye bakendeki mpe basalaki nyonso oyo ekoki mpo ete kunda ekengelama malamu ; batiaki elembo na libanga oyo bakangaki na yango kunda mpe batiaki bakengeli.
<- Matayo 26Matayo 28 ->