1 Na tango wana, sango na tina na Yesu epanzanaki makasi mpe ekomaki kino na matoyi ya Erode, moyangeli ya Galile. 2 Alobaki na basali na ye :
3 Nzokande, Erode amipeselaki mitindo ete bazwa Yoane, bakanga ye minyololo mpe babwaka ye kati na boloko, likolo ya Erodiade, mwasi ya Filipo, ndeko mobali ya Erode ; 4 pamba te Yoane azalaki koloba na ye : « Ozali na ndingisa te ya kosangisa na ye nzoto mpo ete azali mwasi na yo te. » 5 Boye, Erode akomaki koluka nzela ya koboma Yoane, kasi azalaki kobanga bato mpo ete bazalaki kozwa Yoane lokola mosakoli. 6 Nzokande, na mokolo ya kosepela mbotama ya Erode, mwana mwasi ya Erodiade abinaki liboso ya babengami na feti yango mpe asepelisaki Erode makasi. 7 Boye, Erode alakaki mwasi yango, na nzela ya ndayi, ete akopesa ye nyonso oyo akosenga. 8 Lokola mama akotisaki makanisi mabe kati na mwana, mwana mwasi alobaki na Erode : « Pesa ngai awa, na sani, moto ya Yoane Mobatisi. » 9 Tango mokonzi ayokaki eloko oyo mwana mwasi asengaki, ayokaki mawa mingi na motema ; kasi mpo na ndayi oyo alapaki mpe mpo na bato oyo abengisaki na feti, apesaki mitindo ete bapesa ye moto yango. 10 Atindaki moto moko ete akende kokata moto ya Yoane kati na boloko. 11 Bamemaki, na sani, moto ya Yoane Mobatisi mpe bapesaki yango epai ya mwana mwasi, mpe mwana mwasi amemaki yango epai ya mama na ye. 12 Bayekoli ya Yoane bayaki kozwa nzoto na ye mpe bakundaki yango ; sima na yango, bakendeki kopesa sango epai ya Yesu.
13 Tango Yesu ayokaki sango yango, azwaki bwato mpo na kokende kati na esobe, na esika oyo akozala kaka Ye moko. Wana ebele ya bato bayokaki bongo, babimaki na bamboka na bango mpe balandaki Yesu na makolo. 14 Tango Yesu akitaki wuta na bwato mpe amonaki ebele ya bato penza, ayokaki mawa makasi mpo na bango. Boye, abandaki kobikisa bandeko na bango, oyo bazalaki kobela.
15 Na pokwa, bayekoli bapusanaki pene na Yesu mpe balobaki na Ye :
16 Kasi Yesu alobaki na bango :
17 Bayekoli bazongisaki :
18 Yesu alobaki :
19 Yesu apesaki mitindo na bato ete bavanda na matiti ; azwaki mapa mitano mpe bambisi mibale yango, atombolaki miso na Ye na likolo mpe azongisaki matondi epai ya Nzambe ; akataki mapa yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai ya bato. 20 Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale. 21 Bato oyo baliaki bazalaki mibali pene nkoto mitano, longola basi mpe bana.
22 Mbala moko, Yesu atindaki bayekoli na Ye ete bamata na bwato mpe bakende liboso na Ye, na ngambo mosusu ya ebale, wana akozongisa bato. 23 Sima na Ye kozongisa bato, amataki na ngomba mpo na kosambela na esika oyo azalaki kaka Ye moko. Kino na pokwa, azalaki wana kaka Ye moko. 24 Nzokande, kaka na tango yango, wana bwato ekomaki mosika, na molayi ya bametele koleka nkama moko longwa na mokili, mbonge ekomaki koningisa bwato yango makasi, pamba te mopepe ezalaki kobeta na ndenge ya kozongisa bwato na sima.
25 Wana tongo ekomaki pene ya kotana, Yesu atambolaki likolo ya mayi ya ebale mpo na kolanda bango, mpe alingaki kutu koleka bango. 26 Tango bayekoli bamonaki Yesu azali kotambola likolo ya mayi ya ebale, somo makasi ekangaki bango mpe bakomaki koloba :
28 Petelo alobaki na Ye :
29 Yesu alobaki na ye :
31 Mbala moko, Yesu asembolaki loboko epai na ye, asimbaki ye mpe alobaki na ye :
32 Tango bamataki na bwato, mopepe ekitaki. 33 Bato oyo bazalaki kati na bwato bagumbamelaki Yesu mpe balobaki :
34 Sima na bango kokatisa ebale, bakomaki na mabele ya Genezareti. 35 Tango bavandi ya esika wana basosolaki ete ezali Yesu, bapanzaki sango kati na etuka mobimba ; mpe bamemelaki Ye babeli nyonso. 36 Basengaki na Ye ete apesa babeli nzela ya kosimba ata singa ya songe ya elamba na Ye. Mpe bato nyonso oyo balongaki kosimba yango babikaki na bokono na bango.
<- Matayo 13Matayo 15 ->