1 Bato nyonso oyo bazalaki kati na mayangani batelemaki mpe bamemaki Yesu liboso ya Pilato ; 2 mpe kuna, bakomaki kofunda Ye :
3 Pilato atunaki Yesu :
4 Pilato alobaki na bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe na ebele ya bato :
5 Kasi batiaki kaka molende mpe balobaki :
6 Tango Pilato ayokaki bongo, atunaki soki Yesu azali moto ya Galile. 7 Wana ayokaki ete Yesu azali moto ya mboka oyo ezalaki na se ya bokonzi ya Erode, atindaki Ye epai ya Erode, pamba te Erode azalaki kati na Yelusalemi na mikolo wana.
8 Erode asepelaki mingi tango amonaki Yesu, pamba te, wuta kala, azalaki koluka komona Ye mpo ete ayokaki basango mingi na tina na Ye, mpe azalaki kolikya komona Yesu kosala likamwisi. 9 Apesaki ye mituna ebele, kasi Yesu apesaki ye ata eyano moko te.
10 Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bazalaki kaka wana mpe bazalaki kopelisa moto na maloba mabe mpo na kokweyisa Yesu. 11 Erode mpe basoda na ye basekaki mpe batiolaki Yesu ; balatisaki Ye elamba ya kitoko makasi mpe bazongisaki Ye epai ya Pilato. 12 Nzokande, Erode mpe Pilato bazalaki banguna wuta kala ; kasi na mokolo wana, bakomaki balingami.
13 Pilato abengisaki bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya Bayuda mpe bato nyonso ; alobaki na bango :
18 Bato nyonso bagangaki :
19 Barabasi akangamaki na boloko mpo ete abimisaki mobulu kati na engumba mpe abomaki moto.
20 Lokola azalaki na posa ya kotika Yesu, Pilato atunaki bango lisusu. 21 Kasi bakobaki koganga :
22 Pilato atunaki bango lisusu, mpo na mbala ya misato :
23 Kasi bakobaki kaka kosenga, na koganga makasi koleka, ete babaka Yesu na ekulusu ; mpe suka na suka, koganga na bango elongaki.
24 Pilato azwaki mokano ya kokokisa oyo basengaki ; 25 abimiselaki bango moto oyo basengaki, oyo akangamaki na boloko mpo na mobulu mpe mpo ete abomaki moto, mpe akabaki Yesu na maboko na bango mpo ete basala Ye nyonso oyo balingi.
26 Wana basoda bazalaki kokumba Yesu, bakangaki mobali moko, kombo na ye ezalaki Simona, moto ya Sirene, oyo awutaki na bilanga ; batiaki ekulusu na mokongo na ye mpo ete amema yango sima na Yesu. 27 Bato ebele balandaki Yesu. Kati na bango, ezalaki mpe na basi oyo bazalaki kolelalela mpe komitungisa mingi mpo na Ye. 28 Yesu abalukaki mpo na kotala basi mpe alobaki :
32 Bamemaki mpe mibali mosusu mibale, babomi bato, mpo na koboma bango elongo na Yesu.
34 Yesu alobaki :
36 Basoda mpe bakendeki mpe batiolaki Ye ; bapesaki Ye vino ya ngayi 37 mpe balobaki :
38 Na likolo ya moto ya Yesu, ezalaki na makomi oyo :
39 Moko kati na babomi bato oyo babakamaki na ba-ekulusu atiolaki Ye :
40 Kasi mobomi bato mosusu apamelaki ye :
42 Bongo alobaki lisusu :
43 Yesu azongiselaki ye :
44 Na ngonga pene ya midi, molili ekotaki na mokili mobimba kino na ngonga ya misato ya pokwa, 45 pamba te moyi etikaki kongenga, mpe rido monene ya Tempelo epasukaki na kati-kati. 46 Yesu agangaki na mongongo makasi :
48 Tango bato nyonso oyo basanganaki wana, mpo na kotala makambo oyo ezali kosalema, bamonaki makambo oyo ekweyi, batiaki maboko na bango na batolo na bango mpe bazongaki. 49 Kasi bato nyonso oyo bayebaki Yesu, mpe basi oyo balandaki Ye longwa na Galile, batelemaki na mosika mpe bazalaki kotala ndenge makambo ezali koleka.
50 Kati na Likita-Monene ya Bayuda, ezalaki na moto moko, kombo na ye « Jozefi. » Azalaki moto malamu mpe moto ya sembo, 51 mpe andimaki te mikano mpe misala ya bato mosusu ya Likita-Monene ; azalaki moto ya mboka Arimate, engumba ya Bayuda, mpe azalaki kozela Bokonzi ya Nzambe. 52 Akendeki epai ya Pilato mpo na kosenga nzoto ya Yesu. 53 Bongo akitisaki nzoto yango longwa na ekulusu, alingaki yango na liputa ya lino, mpe atiaki yango kati na kunda oyo batobolaki kati na libanga moko ya monene epai wapi batikalaki nanu kokunda ata moto moko te. 54 Ezalaki mokolo ya komilengela, wana Saba elingaki kobanda. 55 Basi oyo bawutaki na Galile elongo na Yesu balandaki Jozefi, bamonaki kunda mpe ndenge nini atiaki nzoto ya Yesu kati na kunda yango. 56 Sima, bazongaki epai na bango mpe babongisaki mafuta ya solo kitoko mpe malasi. Kasi bapemaki na mokolo ya Saba, kolanda ndenge mobeko ezalaki kosenga.
<- Luka 22Luka 24 ->