6 Soki alingi kobonza meme to ntaba lokola mbeka ya boyokani liboso ya Yawe, asengeli kobonza nyama ya mobali to ya mwasi oyo ezanga mbeba. 7 Soki azali nde kobonza mwana meme lokola mbeka, akomema yango liboso ya Yawe. 8 Akotia loboko na ye na moto ya mbeka na ye, akokata yango kingo liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Bongo bana mibali ya Aron bakosopa makila na yango na bangambo nyonso ya etumbelo. 9 Kati na mbeka yango ya kozongisa boyokani, tala biteni oyo akobonza epai na Yawe lokola likabo bazikisa na moto : mafuta ya mbeka, mokila mobimba, mafuta oyo ezipaka biloko ya kati mpe mafuta nyonso oyo ekangami na kati, 10 bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo, mafuta oyo ezipaka yango mpe mafuta oyo ezali kati-kati ya mipanzi na loketo. Akolongola bafwa na bambuma mibale wana. 11 Nganga-Nzambe akotumba biteni nyonso wana na etumbelo. Ezali likabo bazikisa na moto mpo na Yawe.
12 Soki alingi kobonza ntaba ya mobali to ya mwasi, akomema yango liboso ya Yawe. Akotia loboko na ye na moto ya mbeka na ye, 13 akokata yango kingo liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Bongo bana mibali ya Aron bakosopa makila na yango na bangambo nyonso ya etumbelo. 14 Akobonza liboso ya Yawe lokola likabo bazikisa na moto : mafuta nyonso oyo ezipaka biloko ya kati, 15 bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo, mafuta oyo ekangami na yango mpe bafwa. Bakolongola yango nzela moko na bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo. 16 Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo. Ezali likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.