8 Mikolo nyonso ya Saba, bokobonza lipa yango liboso ya Yawe na kombo ya bana ya Isalaele lokola boyokani ya libela. 9 Gato yango ekozala mpo na Aron mpe bana na ye ya mibali ; bana na ye ya mibali bakolia yango na Esika ya bule, pamba te ezali eteni ya bule koleka kati na biteni na bango oyo bazwaka na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Ezali mobeko mpo na libela. »
13 Yawe alobaki na Moyize : 14 « Mema na libanda ya molako moto oyo atioli Nzambe. Bato nyonso oyo bayokaki ye, bakotia maboko na bango na moto na ye, mpe bato nyonso ya lingomba bakobamba ye mabanga.
15 Loba na bana ya Isalaele : ‹ Soki moto alakeli Nzambe na ye mabe, amemi ngambo ; 16 soki moto atioli Kombo ya Yawe, basengeli koboma ye : bato nyonso ya lingomba basengeli kobamba ye mabanga. Azala mopaya to mwana mboka, soki atioli Kombo ya Yawe, basengeli koboma ye.
17 Soki moto abomi moto, basengeli koboma ye. 18 Soki moto abomi nyama ya moto mosusu, asengeli kozongisa nyama ya bomoi na esika ya nyama oyo ekufi : kolanda mobeko ya bomoi mpo na bomoi.
19 Soki moto azokisi moninga na ye, bakosala ye ndenge asalaki moninga : 20 soki abuki eteni ya nzoto, ye mpe bakobuka ye eteni ya nzoto ; soki atoboli liso, ye mpe bakotobola ye liso ; soki abuki linu, ye mpe bakobuka ye linu ; ndenge azokisi moto mosusu, ndenge wana mpe bakozokisa ye.
21 Moto nyonso oyo abomi nyama ya moninga na ye, akozongisa nyama mosusu ; kasi oyo abomi moto, basengeli koboma ye.
22 Ezala mopaya to mwana mboka, bino nyonso bozali na mobeko moko ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino. › »
23 Bongo Moyize alobaki na bana ya Isalaele ; mpe babimisaki na libanda ya molako moto oyo alakelaki Nzambe mabe mpe babambaki ye mabanga. Bana ya Isalaele basalaki kolanda ndenge Yawe atindaki Moyize.
<- Levitike 23Levitike 25 ->