1 Bikuke ya engumba Jeriko ezalaki ya kokangama makasi penza mpo na bana ya Isalaele ; moto moko te akokaki kokota to kobima. 2 Yawe alobaki na Jozue :
6 Boye Jozue, mwana mobali ya Nuni, abengaki Banganga-Nzambe mpe alobaki na bango :
7 Bongo apesaki mitindo oyo epai ya bana ya Isalaele :
8 Tango Jozue asilisaki koloba na bato, Banganga-Nzambe sambo, oyo bakamataki bakelelo sambo liboso ya Yawe, balekaki liboso mpe bakomaki kobeta yango, wana Sanduku ya Boyokani ya Yawe ezalaki kolanda bango na sima. 9 Basoda oyo bazalaka na liboso, na bitumba, bazalaki kotambola liboso ya Banganga-Nzambe oyo bazalaki kobeta bakelelo ; bongo basoda oyo batikalaka na sima, bazalaki kolanda Sanduku ya Boyokani. Na tango wana nyonso, bakelelo ezalaki kaka kobeta. 10 Kasi Jozue apesaki mitindo oyo epai ya bana ya Isalaele :
11 Boye, Sanduku ya Yawe ezalaki kotambola zingazinga ya engumba mbala moko na mokolo ; bongo na sima, bato bazalaki kozonga na molako mpo na kolekisa butu.
12 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Jozue alamukaki, mpe Banganga-Nzambe bamemaki Sanduku ya Yawe. 13 Banganga-Nzambe sambo oyo basimbaki bakelelo sambo balekaki liboso, batambolaki liboso ya Sanduku ya Yawe, na kobeta bakelelo. Basoda oyo bazalaka na liboso, na bitumba, balekaki liboso na bango ; mpe basoda oyo batikalaka na sima bazalaki kolanda Sanduku ya Yawe, wana bakelelo ezalaki kobeta. 14 Na mokolo ya mibale, babalukaki lisusu engumba mbala moko ; bongo na sima, bazongaki na molako. Boye, basalaki bongo mikolo motoba.
15 Na mokolo ya sambo, balamukaki na tongo-tongo mpe babalukaki zingazinga ya engumba mbala sambo, ndenge kaka bazalaki kosala. Ezalaki kaka mokolo wana nde babalukaki mbala sambo zingazinga ya engumba. 16 Na mbala oyo ya sambo, tango Banganga-Nzambe babetaki bakelelo tango molayi, Jozue apesaki mitindo epai ya bato :
20 Tango babetaki bakelelo, bato bagangaki makasi. Bongo, tango bato bagangaki makasi sima na koyoka lolaka ya kelelo kobeta tango molayi, mir ya engumba ekweyaki na pwasa. Boye, moto nyonso akotaki na engumba, liboso na ye, mpe babotolaki yango. 21 Babomaki na mopanga, nyonso oyo ezalaki kati na engumba : mobali to mwasi, elenge to mobange, ngombe to meme to mpe ane.
22 Jozue alobaki na bato mibale oyo banongaki Jeriko :
23 Boye, bilenge mibali oyo bakendeki kononga mokili bakotaki mpe babimisaki Raabi, tata na ye, mama na ye, bandeko na ye ya mibali mpe biloko na ye nyonso. Babimisaki libota na ye mobimba na libanda mpe batiaki bango libanda ya molako ya Isalaele.
24 Batumbaki engumba mobimba elongo na biloko nyonso oyo ezalaki kati na yango, longola kaka palata mpe wolo, bisalelo nyonso ya bronze mpe ya bibende oyo batiaki na ebombelo bomengo ya Tempelo ya Yawe. 25 Jozue abikisaki Raabi, mwasi ya ndumba, libota na ye mpe bato na ye nyonso, pamba te abombaki bato oyo Jozue atindaki mpo na kononga Jeriko. Boye, akomaki kovanda kati na bana ya Isalaele kino na mokolo ya lelo.
26 Kaka na tango yango, Jozue akataki seleka oyo :
27 Yawe azalaki elongo na Jozue, mpe sango na ye epanzanaki mokili mobimba.
<- Jozue 5Jozue 7 ->