10 Sik’oyo tala, eleki mibu tuku minei na mitano oyo Yawe abateli ngai na bomoi, wuta tango alobaki liloba oyo epai ya Moyize tango bana ya Isalaele bazalaki kotambola na esobe. Boye, ndenge nazali awa lelo, nakokisi mibu tuku mwambe na mitano ya mbotama, 11 mpe nazali na makasi lokola na tango oyo Moyize atindaki ngai ; nazali na nguya ya kobunda bitumba ndenge kaka nazalaki na yango na kala. 12 Pesa ngai mokili ya bangomba wana oyo Yawe alakaki ngai na mokolo wana. Mokolo wana, yo moko oyokaki ete bato ya Anaki bazalaki kovanda kuna mpe bingumba na bango ezalaki minene mpe batonga makasi. Kasi na lisungi na Yawe, nakobengana bango ndenge Yawe alobaki. »
13 Jozue apambolaki Kalebi, mwana mobali ya Yefune, mpe apesaki ye engumba Ebron lokola libula. 14 Boye, wuta na tango yango, engumba Ebron ekomaki libula ya Kalebi, mwana mobali ya Yefune, moto ya Kenizi ; mpo ete alandaki Yawe, Nzambe ya Isalaele, na motema mobimba.
15 Liboso, bazalaki kobenga Ebron « Kiriati-Ariba. » Ariba azalaki elombe oyo alekaki bato nyonso ya Anaki na makasi. Bongo, mokili ekomaki na kimia mpe bitumba ezalaki lisusu te.
<- Jozue 13Jozue 15 ->