3 Yona atosaki Liloba na Yawe ; atelemaki mpe akendeki na Ninive. Nzokande Ninive ezalaki engumba moko ya monene na miso ya Nzambe ; esengelaki kosala mikolo misato mpo na kosilisa kotambola kati na yango. 4 Yona abandaki mosala na ye, atambolaki mokolo mobimba kati na engumba ; azalaki kosakola :
5 Bato ya Ninive bandimelaki Nzambe ; bazwaki mokano ya kokila bilei mpe ya kolata basaki, kobanda na oyo aleki na bozwi kino na oyo aleki na bobola.
6 Tango sango yango ekomaki epai ya mokonzi ya Ninive, atelemaki longwa na kiti na ye ya bokonzi, alongolaki bilamba na ye ya bokonzi, alataki saki mpe amivandisaki na putulu. 7 Apesaki mitindo ete bapanza sango oyo na Ninive :
10 Tango Nzambe amonaki makambo oyo basalaki mpe ndenge batikaki banzela na bango ya mabe, abongolaki makanisi na Ye mpe atindelaki bango lisusu te etumbu oyo akanaki kopesa bango.
<- Yona 2Yona 4 ->