4 Pilato abimaki lisusu mpe alobaki na bango :
5 Boye, Yesu abimaki alata ekoti ya nzube mpe nzambala ya motane. Pilato alobaki na bango :
6 Tango kaka bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakengeli bamonaki Yesu, babandaki koganga :
7 Bayuda balobaki na molende nyonso :
8 Tango Pilato ayokaki maloba wana, abangaki lisusu makasi. 9 Azongaki lisusu kati na ndako ya moyangeli mpe alobaki na Yesu :
10 Pilato alobaki na Ye :
11 Yesu alobaki na ye :
12 Kobanda kaka na ngonga wana, Pilato akomaki koluka nzela ya kotika Yesu ; kasi Bayuda babandaki lisusu koganga :
13 Tango Pilato ayokaki bongo, amemaki Yesu na libanda mpe avandaki na esambiselo, na esika oyo babengaka, na lokota ya Arami, « Gabata[a]. » 14 Ezalaki mokolo ya suka mpo na kokoma na mokolo ya Pasika, na ngonga ya midi. Pilato alobaki na Bayuda :
15 Kasi babandaki koganga :
16 Pilato akabaki Yesu na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu. Boye, bakamataki Yesu mpe bakendeki na Ye.
17 Yesu amemaki, Ye moko, ekulusu na Ye ; abimaki na engumba mpe akendeki na esika oyo babengaka, na lokota ya Arami, « Gologota[b]. » 18 Ezalaki na esika yango nde babakaki Yesu na ekulusu, elongo na bato mosusu mibale : moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu ; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
19 Pilato akomaki na libaya, makomi oyo atiaki na ekulusu ; akomaki :
20 Lokola esika oyo babakaki Yesu na ekulusu ezalaki pene ya engumba, Bayuda ebele batangaki makomi yango, pamba te bakomaki yango na lokota ya Ebre, lokota ya latino mpe lokota ya Greki. 21 Bakonzi ya Banganga-Nzambe balobaki na Pilato :
22 Kasi Pilato azongisaki :
23 Sima na basoda kobaka Yesu na ekulusu, bakamataki bilamba na Ye mpe bakabolaki yango na biteni minei : soda moko na moko azwaki eteni moko. Bakamataki mpe nzambala na Ye, oyo ezalaki ya kotongama te, kasi ezalaki kaka elamba moko, kobanda na likolo kino na se.
24 Basoda balobanaki bango na bango :
25 Tala bato oyo batelemaki pene ya ekulusu ya Yesu : Mama na Ye, ndeko mwasi ya mama na Ye, Mari oyo azalaki mwasi ya Klopasi, mpe Mari ya mboka Magidala.
26 Tango Yesu amonaki ete moyekoli oyo azalaki kolinga atelemi pembeni ya mama na Ye, alobaki na mama na Ye :
27 Mpe alobaki na moyekoli yango :
29 Lokola ezalaki na mbeki moko etonda na vino ya ngayi pembeni ya esika yango, batiaki, na songe ya nzete moko ya izope, eponze moko epola na vino yango ya ngayi mpe batombolaki yango kino na monoko ya Yesu. 30 Tango kaka Yesu amelaki vino yango ya ngayi, alobaki :
31 Lokola ezalaki mokolo ya komilengela mpo na Saba, mpe lokola Saba yango ezalaki na tina makasi, Bayuda balingaki te ete bibembe etikala na ba-ekulusu na tango ya Saba. Boye, bakendeki kosenga epai ya Pilato ete apesa mitindo ya kobuka makolo ya bibembe oyo ezalaki na likolo ya ba-ekulusu mpe ya kolongola banzoto na bango. 32 Basoda bayaki mpe babukaki makolo ya mibali nyonso mibale oyo babakaki na ba-ekulusu elongo na Yesu ; babandaki na moko, bongo balekaki na oyo mosusu. 33 Wana ekomaki ngala ya makolo ya Yesu, bamonaki ete Yesu amikufelaki ; mpe babukaki lisusu te makolo na Ye. 34 Moko kati na basoda atobolaki mopanzi ya Yesu na nzela ya likonga ; mpe mbala moko, makila mpe mayi ebimaki na mopanzi yango.
35 Moto oyo azali kopesa litatoli na tina na makambo oyo amonaki yango kosalema na miso na ye, mpe litatoli na ye ezali ya solo ; ayebi penza ete azali koloba solo mpo ete bino mpe bondima. 36 Makambo nyonso wana esalemaki bongo mpo ete Makomi oyo ekokisama : « Bakobuka ata mokuwa na Ye moko te. » 37 Eteni mosusu ya Makomi elobi : « Bakotala Ye oyo batobolaki mopanzi. »
38 Sima na makambo wana, Jozefi, moto ya mboka Arimate, oyo azalaki moyekoli ya Yesu, kasi na nkuku mpo ete azalaki kobanga Bayuda, asengaki epai ya Pilato ndingisa ya kokitisa nzoto ya Yesu longwa na ekulusu. Pilato apesaki ye ndingisa yango, mpe Jozefi akendeki mpe akitisaki nzoto ya Yesu. 39 Nikodemi oyo, na ebandeli, akendeki kotala Yesu na butu, ye mpe ayaki ; amemaki bakilo pene tuku misato ya mafuta ya mire basangisa na aloe. 40 Bango mibale bakamataki nzoto ya Yesu mpe balingaki yango na maputa ya lino oyo, kati na yango, batiaki mafuta ya solo kitoko, ndenge ezalaki momesano ya Bayuda mpo na kokunda bibembe. 41 Pene ya esika oyo babakaki Yesu na ekulusu, ezalaki na elanga moko oyo, kati na yango, ezalaki na kunda moko ya sika epai wapi batikalaki nanu kokunda ata moto moko te. 42 Lokola, mpo na Bayuda, ezalaki mokolo ya komilengela mpo na Saba, batiaki Yesu kati na kunda yango, pamba te ezalaki pene.
<- Yoane 18Yoane 20 ->