1 Sima na Yesu kobondela, akendeki elongo na bayekoli na Ye mpe bakatisaki lubwaku ya Sedron epai wapi elanga moko ezalaki. Yesu akotaki na elanga yango elongo na bayekoli na Ye.
2 Yuda oyo asilaki komibongisa mpo na kokaba Yesu ayebaki esika yango malamu, pamba te Yesu azalaki kokende kuna mbala mingi elongo na bayekoli na Ye. 3 Boye Yuda akendeki na elanga yango mpe amemaki lisanga ya basoda mpe ya bakengeli oyo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo bapesaki ye. Bato yango basimbaki minda, banzete oyo ezalaki kopela moto mpe bibundeli.
4 Lokola Yesu ayebaki makambo nyonso oyo esengeli kokomela Ye, akendeki kokutana na bango mpe atunaki bango :
5 Bazongisaki :
8 Yesu alobaki na bango :
9 Ezali bongo nde esengelaki kokokisama, liloba oyo Yesu alobaki : « Kati na bato oyo opesaki ngai, nabungisi ata moko te. »
10 Lokola Simona Petelo azalaki na mopanga, abimisaki yango wuta na ebombelo na yango, abetaki mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe akataki ye litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali. Kombo ya mosali yango ezalaki Malikisi.
11 Kasi Yesu alobaki na Petelo :
12 Lisanga ya basoda, mokonzi na bango mpe bakengeli ya Bayuda bakamataki Yesu mpe bakangaki Ye basinga ; 13 bamemaki Ye liboso epai ya Ana oyo azalaki tata-bokilo ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe, na mobu wana. 14 Ezalaki mpe Kayifa wana nde apesaki Bayuda toli oyo : « Eleki malamu ete moto moko akufa mpo na bato nyonso. »
15 Simona Petelo mpe moyekoli mosusu bazalaki kolanda Yesu. Moyekoli yango ayebanaki na mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe akotaki elongo na Yesu na lopango ya kati ya ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe. 16 Petelo azalaki kozela libanda, na liboso ya ekuke. Moyekoli wana, oyo ayebanaki na mokonzi ya Banganga-Nzambe, abimaki, asololaki na mwasi mokengeli ekuke mpe akotisaki Petelo. 17 Mwasi mosali oyo azalaki kokengela ekuke atunaki Petelo :
18 Lokola malili ezalaki, basali mpe bakengeli bapelisaki moto mpe batelemaki pembeni-pembeni mpo na koyetola. Petelo mpe azalaki wana elongo na bango mpo na koyetola.
19 Mokonzi ya Banganga-Nzambe apesaki Yesu mituna na tina na bayekoli na Ye mpe na tina na mateya na Ye. 20 Yesu azongiselaki ye :
22 Tango kaka Yesu alobaki bongo, moko kati na bakengeli oyo bazalaki wana abetaki Ye mbata na koloba :
23 Yesu alobaki na ye :
24 Bongo Ana atindaki Yesu oyo azalaki kaka ya kokangama na basinga, epai ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe.
25 Wana Simona Petelo azalaki nanu koyetola moto, batunaki ye :
26 Kasi moko kati na basali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe, ndeko mobali ya moto oyo Petelo akataki litoyi, alobaki :
27 Kasi Petelo awanganaki yango lisusu ; mpe mbala moko, soso elelaki.
28 Bongo na tongo makasi, longwa na ndako ya Kayifa, bamemaki Yesu kati na ndako ya moyangeli oyo azalaki moto ya Rome. Kasi bango moko bato oyo bamemaki Yesu bakotaki te kati na ndako ya moyangeli, mpo ete bamikomisa mbindo te mpe mpo ete bazwa nzela ya kolia bilei ya Pasika. 29 Yango wana moyangeli Pilato abimaki na libanda mpe atunaki bango :
30 Bazongiselaki ye :
31 Pilato alobaki na bango :
32 Ezali ndenge wana nde ekokisamaki maloba oyo Yesu alobaki mpo na kolakisa lolenge ya kufa oyo asengelaki kokufa.
33 Pilato azongaki kati na ndako ya moyangeli, abengaki Yesu mpe atunaki Ye :
34 Yesu azongisaki :
35 Pilato atunaki Yesu :
36 Yesu azongisaki :
37 Pilato atunaki :
38 Pilato atunaki Ye :
40 Bango nyonso bazongisaki na koganga :