4 Tango Sedesiasi akokisaki mibu libwa na bokonzi, na mokolo ya zomi ya sanza mpe ya zomi, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na mampinga na ye nyonso, ayaki kobundisa Yelusalemi. Batongaki molako na bango na libanda ya engumba mpe batimolaki mabulu mpo na kobombama, na zingazinga na yango nyonso. 5 Engumba yango ezingelamaki kino na mobu ya zomi na moko ya bokonzi ya Sedesiasi.
6 Na mokolo ya libwa ya sanza ya minei, wana nzala makasi ekotaki kati na engumba, mpe bato bazalaki lisusu na eloko ya kolia te, 7 bongo lokola lidusu moko efungwamaki kati na mir ya engumba, basoda nyonso ya Yuda bakimaki butu-butu mpe babimelaki na ekuke oyo ezalaki na kati-kati ya bamir mibale, pene ya elanga ya mokonzi, atako bato ya Babiloni bazingelaki engumba. Bakimaki na nzela ya lubwaku ya Yordani. 8 Kasi basoda ya Babiloni balandaki mokonzi Sedesiasi mpe bakangaki ye kati na etando ya Jeriko epai wapi basoda na ye nyonso bakimaki mpe bapanzanaki. 9 Basoda ya Babiloni bakangaki mokonzi, bamemaki ye epai ya mokonzi ya Babiloni, na Ribila kati na mokili ya Amati ; mpe mokonzi ya Babiloni akatelaki ye etumbu. 10 Kuna na Ribila, mokonzi ya Babiloni apesaki mitindo ete bakata mito ya bana mibali ya Sedesiasi na miso ya Sedesiasi. Mokonzi ya Babiloni apesaki lisusu mitindo ete baboma bakalaka nyonso ya Yuda. 11 Bongo, atobolaki miso ya Sedesiasi, akangaki ye minyololo ya bibende mpe amemaki ye na Babiloni. Mokonzi ya Babiloni abwakaki ye na boloko kino na mokolo oyo akufaki.
12 Tango Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akokisaki mibu zomi na libwa na bokonzi, Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, oyo azalaki kosala esika moko na mokonzi ya Babiloni, ayaki na Yelusalemi na mokolo ya zomi ya sanza ya mitano. 13 Atumbaki Tempelo ya Yawe, ndako ya mokonzi mpe bandako nyonso ya Yelusalemi ; atumbaki bandako nyonso ya bato minene. 14 Mampinga nyonso ya Babiloni, oyo ezalaki na se ya bokonzi ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi babukaki bamir oyo ezingelaki Yelusalemi.
15 Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, amemaki na bowumbu ndambo ya babola, ndambo ya bato oyo batikalaki kati na engumba, ndambo ya bato ya misala ya maboko mpe ba-oyo bamipesaki epai ya mokonzi ya Babiloni. 16 Kasi, Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, atikaki kati na mokili ndambo ya babola mpo na kolona vino mpe bilanga.
17 Bato ya Babiloni babukaki makonzi ya bronze oyo ezalaki liboso ya Tempelo ya Yawe, bashario mpe nzungu ya monene ya bronze oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe, mpe bamemaki bronze na yango nyonso na Babiloni bisalelo. 18 Bakamataki lisusu biloko nyonso ya bronze oyo bazalaki kosala na yango losambo kati na Tempelo : basani ya putulu, bapawu, bambeli, basani ya kobwakela mayi, bakopo. 19 Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi akamataki lisusu biloko nyonso ya wolo mpe ya palata : basani ya minene, bambabola, basani ya kobwakela mayi, basani ya putulu, bitelemiselo ya minda, bakopo mpe milangi mpo na makabo ya masanga. 20 Bakokaki te komeka kilo ya bronze ya biloko nyonso oyo mokonzi Salomo asalaki mpo na Tempelo ya Yawe : makonzi nyonso mibale, nzungu ya monene, bikeko ya bangombe zomi na mibale oyo ezalaki kosimba nzungu ya monene mpe bashario. 21 Likonzi moko na moko ezalaki na bametele pene libwa, na bosanda, mpe bametele pene motoba, na kovimba na yango ; bongo bronze oyo basalelaki yango ezalaki evimba na basantimetele pene mwambe, mpe ezalaki polele na kati. 22 Basalaki na bronze moto ya likonzi moko na moko, mpe ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano na bosanda. Bazingelaki yango na bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama mpe na bambuma ya grenade ; nyonso esalemaki na bronze. 23 Bangambo nyonso ezalaki na bambuma ya grenade tuku libwa na motoba mpe motango nyonso ya bambuma ya grenade oyo ezalaki zingazinga ya basinga oyo basala lokola basheni ezalaki nkama moko.
24 Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi atiaki na boloko : Seraya, mokonzi ya Banganga-Nzambe ; Sofoni, molandi ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ; mpe Banganga-Nzambe misato oyo bazalaki na mokumba ya kokengela ekotelo ya Tempelo. 25 Kati na bato oyo batikalaki kati na engumba, akangaki lisusu moko kati na bakalaka ya lokumu, oyo azalaki na mokumba ya kotala makambo ya basoda ya bitumba ; bapesi toli sambo ya mokonzi, oyo batikalaki kati na engumba ; mokomi mikanda ya mokonzi ya mampinga, oyo azalaki na mokumba ya kokoma bakombo ya bato ya mboka mpo na kokota na mosala ya mampinga ; mpe mibali tuku motoba ya Yuda, oyo bakutaki kati na engumba. 26 Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, akamataki bango nyonso mpe amemaki bango epai ya mokonzi ya Babiloni, na Ribila. 27 Mokonzi ya Babiloni abomaki bango kuna na Ribila, kati na mokili ya Amati. Boye, bato ya Yuda bakendeki na bowumbu mosika ya mokili na bango.