4 Mokolo oyo elandaki kufa ya Gedalia, liboso ete sango eyebana epai ya bato, 5 bato tuku mwambe bawutaki na Sishemi, na Silo mpe na Samari ; bazalaki na mandefu bakata, bilamba epasuka-pasuka, mpe bamizokisaki-zokisaki bapota na banzoto. Bamemaki makabo ya bagato mpe malasi ya ansa mpo na kobonza yango kati na Tempelo ya Yawe. 6 Isimaeli, mwana mobali ya Netania, abimaki na Mitsipa mpo na kokende kokutana na bango ; wana azalaki kokende kokutana na bango, azalaki kolela nzela-nzela. Bongo tango akutanaki na bango, alobaki na bango :
7 Tango bakotaki kati na engumba, Isimaeli, mwana mobali ya Netania, mpe bato oyo bazalaki elongo na ye babomaki bango mpe babwakaki bango na libulu. 8 Kasi bato zomi kati na bango balobaki na Isimaeli :
11 Tango Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bakonzi nyonso ya basoda, oyo bazalaki elongo na ye bayokaki sango ya makambo mabe oyo Isimaeli, mwana mobali ya Netania, asalaki, 12 basangisaki bato na bango nyonso mpe bakendeki kobundisa Isimaeli, mwana mobali ya Netania ; bakutanaki na ye pene ya liziba monene ya Gabaoni. 13 Tango bawumbu nyonso oyo Isimaeli akangaki bamonaki Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bakonzi nyonso ya basoda, oyo bazalaki elongo na ye, batondisamaki na esengo makasi ; 14 mpe bato nyonso oyo Isimaeli amemaki lokola bawumbu, na Mitsipa, babalukaki mpe bakendeki kosangana na Yoanani, mwana mobali ya Karea. 15 Kasi Isimaeli, mwana mobali ya Netania, mpe bato mwambe oyo bazalaki elongo na ye babikaki na maboko ya Yoanani mpe bakimaki epai ya bato ya Amoni.
16 Sima na yango, Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bakonzi nyonso ya basoda oyo bazalaki elongo na ye bamemaki bato nyonso ya Mitsipa oyo babikaki, oyo Isimaeli, mwana mobali ya Netania, amemaki na bowumbu wuta na Mitsipa sima na ye koboma Gedalia, mwana mobali ya Ayikami : basoda, basi, bana mpe bakalaka ya lokumu ya mokonzi ; elingi koloba bato nyonso oyo azongisaki wuta na Gabaoni. 17 Bakobaki nzela na bango mpe batelemaki na molako ya Kimeami, pene ya Beteleemi, mpo ete bazalaki na posa ya kokende na Ejipito 18 mpo na kokima bato ya Babiloni, pamba te bazalaki kobanga bango ; mpe mpo ete Isimaeli, mwana mobali ya Netania, abomaki Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, oyo mokonzi ya Babiloni akomisaki moyangeli ya mokili.
<- Jeremi 40Jeremi 42 ->