2 Tango mokonzi ya bakengeli ya mokonzi amemaki Jeremi, alobaki na ye :
5 Lokola Jeremi azalaki kowumela kopesa eyano, Nebuzaradani abakisaki :
7 Tango bakonzi nyonso ya mampinga elongo na basoda na bango, oyo bazalaki ya kopanzana kati na etuka, bayokaki ete mokonzi ya Babiloni akomisi Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, moyangeli kati na mokili mpe apesi ye mokumba ya kokamba babola, mibali, basi mpe bana oyo bakendeki te na bowumbu na Babiloni, 8 bakendeki na Mitsipa epai ya Gedalia. Tala bakombo ya bato yango : Isimaeli, mwana mobali ya Netania ; Yoanani mpe Jonatan, bana mibali ya Karea ; Seraya, mwana mobali ya Tanumeti ; bana mibali ya Efayi, moto ya Netofa ; mpe Yezania, mwana mobali ya moto moko ya Maakati ; bakendeki kuna elongo na basoda na bango. 9 Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, alapaki ndayi liboso na bango mpe basoda na bango na maloba oyo : « Bobanga te kosalela bato ya Babiloni, bovanda kati na mokili, bosalela mokonzi ya Babiloni mpe bokozala na bino malamu. 10 Ngai, nakotikala na Mitsipa mpo na kolobela bino liboso ya bato ya Babiloni, oyo bazali koya epai na biso. Kasi bino, bobuka bambuma ya vino, bambuma mosusu, bokamola mafuta mpe bobomba yango na bibombelo na bino, bongo bovanda kati na bingumba oyo bosili kozwa. »
11 Tango Bayuda nyonso oyo bakimelaki na mokili ya Moabi, ya Amoni, ya Edomi mpe na mikili mosusu bayokaki ete mokonzi ya Babiloni atikaki ndambo ya bato kati na Yuda mpe akomisaki Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, moyangeli na bango, 12 bango nyonso balongwaki na mikili nyonso epai wapi bazalaki ya kopanzana mpe bazongaki kati na Yuda, epai ya Gedalia, kuna na Mitsipa, mpe babukaki bambuma ya vino mpe bambuma mosusu ebele.
13 Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bakonzi nyonso ya basoda oyo bazalaki ya kopanzana kati na etuka bayaki na Mitsipa epai ya Gedalia 14 mpe balobaki na ye :
16 Kasi Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, alobaki na Yoanani, mwana mobali ya Karea :