4 Boye, Jeremi abengaki Baruki, mwana mobali ya Neriya, mpe wana Jeremi azalaki koloba makambo nyonso oyo Yawe ayebisaki ye, Baruki azalaki kokoma yango na mokanda.
5 Jeremi alobaki na Baruki : « Ngai nakangami, nakolonga kokende na Tempelo ya Yawe te. 6 Boye yo, kende na Tempelo ya Yawe, na mokolo ya kokila bilei, mpe tangela bato maloba ya Yawe, oyo okomaki na mokanda, wana ngai nazalaki koloba na yo ; tangela yango bato nyonso ya Yuda, oyo bakoya wuta na bingumba na bango. 7 Tango mosusu mabondeli na bango ekokoma liboso ya Yawe, mpe moko na moko kati na bango akotika nzela na ye ya mabe ; pamba te kotomboka mpe kanda oyo Yawe akani kokitisela bato oyo ezali monene. »
8 Baruki, mwana mobali ya Neriya, asalaki makambo nyonso oyo mosakoli Jeremi atindaki ye kosala ; atangaki na Tempelo ya Yawe maloba ya Yawe oyo ekomamaki na mokanda.
9 Na sanza ya libwa, ya mobu ya mitano ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, babengisaki mokolo ya kokila bilei liboso ya Yawe, mpo na bavandi nyonso ya Yelusalemi mpe bato oyo bawutaki na bingumba ya Yuda. 10 Baruki atangelaki bato nyonso, kati na Tempelo ya Yawe, maloba ya Jeremi oyo ekomamaki na mokanda, wuta na shambre ya Gemaria, mwana mobali ya Shafani oyo azalaki mokomi mikanda ; shambre yango ezalaki kati na lopango ya likolo, na ekotelo ya Ekuke ya Sika ya Tempelo.
11 Tango Mishe, mwana, mobali ya Gemaria, mwana mobali ya Shafani, ayokaki maloba nyonso ya Yawe oyo ekomamaki na mokanda, 12 akendeki na ndako ya mokonzi, akotaki kati na ndako ya mosala ya mokomi mikanda epai wapi bakalaka nyonso bazalaki na mayangani : Elishama, mokomi mikanda ; Delaya, mwana mobali ya Shemaya ; Elinatani, mwana mobali ya Akibori ; Gemaria, mwana mobali ya Shafani ; Sedesiasi, mwana mobali ya Anania ; mpe bakalaka nyonso mosusu. 13 Sima na Mishe koyebisa bango makambo nyonso oyo ayokaki epai ya Baruki tango azalaki kotangela bato makomi oyo ezalaki kati na mokanda, 14 bakambi nyonso batindaki Yewudi, mwana mobali ya Netania, mwana mobali ya Shelemia, mwana mobali ya Kushi, epai ya Baruki mpo na koyebisa ye : « Yaka yo moko elongo na mokanda oyo atangelaki bato. »
17 Batunaki Baruki :
18 Baruki azongisaki :
19 Bakambi bayebisaki Baruki :
20 Sima na bango kotia mokanda yango kati na ndako ya mosala ya Elishama, mokomi mikanda, bakendeki epai ya mokonzi kati na lopango mpe bayebisaki ye makambo nyonso.
21 Mokonzi atindaki Yewudi mpo ete akende kozwa mokanda yango, mpe Yewudi akendeki kozwa yango na ndako ya mosala ya mokomi mikanda Elishama mpe atangaki yango liboso ya mokonzi mpe ya bakalaka nyonso oyo batelemaki pene na ye. 22 Ezalaki na sanza ya libwa ; mokonzi avandaki kati na shambre oyo bakimelaka na tango ya malili mpe azalaki koyetola moto oyo ezalaki kopela liboso na ye. 23 Soki Yewudi atangi milongo misato to minei ya makomi ya mokanda, mokonzi azalaki kokata yango na mbeli ya mokomi mikanda mpe kobwaka yango na moto, kino tango mokanda nyonso esilaki kozika na moto. 24 Boye, mokonzi elongo na bakalaka na ye nyonso oyo bazalaki koyoka makambo oyo ekomamaki na mokanda yango bamitungisaki na eloko moko te mpe bapasolaki bilamba na bango te. 25 Atako Elinatani, Delaya mpe Gemaria bazalaki kobondela mokonzi ete atumba mokanda yango te, atikalaki koyokela bango te. 26 Kutu, mokonzi atindaki Yerameeli, kalaka ya makila ; Seraya, mwana mobali ya Azirieli, mpe Shelemia, mwana mobali ya Abideyeli, ete bakanga Baruki, mokomi mikanda, mpe mosakoli Jeremi. Kasi Yawe abombaki bango.
27 Tango mokonzi asilisaki kotumba mokanda oyo ezalaki na maloba oyo Baruki akomaki na etinda ya Jeremi, Yawe alobaki na Jeremi :
32 Jeremi azwaki mokanda mosusu mpe apesaki yango na Baruki, mokomi mikanda, mwana mobali ya Neriya. Wana Jeremi azalaki koloba makambo oyo ezalaki kati na mokanda oyo Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, atumbaki, Baruki azalaki kokoma yango. Mpe makambo ebele mosusu ya lolenge wana ebakisamaki na kati.
<- Jeremi 35Jeremi 37 ->