5 Bongo Mosakoli Jeremi azongiselaki mosakoli Anania eyano na miso ya Banganga-Nzambe mpe ya bato nyonso oyo batelemaki kati na Tempelo ya Yawe. 6 Mosakoli Jeremi alobaki : « Amen ! Tika ete Yawe asala bongo ! Tika ete Yawe akokisa maloba oyo osili kosakola, azongisa na esika oyo, wuta na Babiloni, bisalelo ya Tempelo ya Yawe mpe bato nyonso oyo bakendeki na bowumbu ! 7 Nzokande, yoka maloba oyo nalingi koloba na yo mpe na bato nyonso : 8 Wuta kala, basakoli oyo basakolaki liboso ete yo mpe ngai tozala, basakolaki bitumba, pasi mpe bokono oyo ebomaka, mpo na kotelemela bikolo ebele mpe mikili ya makasi ; 9 kasi soki mosakoli asakoli kimia, akondimama ete azali solo mosakoli oyo Yawe atindi masakoli na ye ekokisami. »
10 Bongo mosakoli Anania alongolaki ekangiseli na kingo ya mosakoli Jeremi mpe abukaki yango. 11 Anania alobaki liboso ya bato nyonso : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Liboso ete mibu mibale ekoka, nakobuka ndenge wana ekangiseli ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, na kingo ya bikolo nyonso. › »
12 Sima na mosakoli Anania kobuka ekangiseli na kingo ya mosakoli Jeremi, Yawe alobaki na Jeremi : 13 « Kende koloba na Anania : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Solo, obuki ekangiseli ya banzete ; kasi na esika na yango, okolata nde ekangiseli ya ebende. 14 Pamba te, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nasili kotia ekangiseli ya ebende na kingo ya bikolo nyonso mpo ete esalela Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe ekosalela ye solo. Nakopesa ye bokonzi ata likolo ya banyama ya zamba. › »
15 Bongo mosakoli Jeremi alobaki lisusu na mosakoli Anania : « Anania, yoka ! Yawe atindi yo te ; mpe ozali kotindika bato oyo na kotia motema na makambo ya lokuta ! 16 Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nakolongola yo na mokili oyo, okokufa kaka na mobu oyo ; pamba te otindiki bato na kotombokela Yawe. › »
17 Kaka na mobu wana, na sanza ya sambo, mosakoli Anania akufaki.
<- Jeremi 27Jeremi 29 ->