3 Kasi Jeremi azongiselaki bango : « Boloba na Sedesiasi : 4 ‹ Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nakomi pene ya kosala ete bibundeli oyo ezali kati na maboko na bino, oyo bozali kosalela mpo na kobundisa mokonzi ya Babiloni mpe bato ya Chalide oyo bazingeli bino na libanda ya engumba, ebalukela bino ; mpe nakosangisa bango kati na engumba oyo. 5 Mpe Ngai moko, nakosembola loboko na Ngai mpo na kobundisa bino na nguya, na kanda, na kosilika mpe na kotomboka makasi. 6 Nakobebisa nyonso oyo ezali kati na engumba oyo : bato mpe banyama ; mpe bakokufa na bokono oyo ebomaka. 7 Sima na yango, elobi Yawe, nakokaba na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe na maboko ya banguna na bango oyo bazali na posa ya kosala bango mabe : Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, bakalaka na ye mpe bavandi ya engumba oyo, ba-oyo bakobika na bokono oyo ebomaka, na mopanga mpe na nzala makasi. Nabukodonozori akoboma bango na mopanga, akokangela bango motema mpe akoyokela bango mawa te. ›
8 Mpe lisusu, loba na bato : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Botala, nasili kotia liboso na bino nzela ya bomoi mpe nzela ya kufa. 9 Moto nyonso oyo akotikala kati na engumba oyo akokufa na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka. Kasi moto oyo akobima mpe akokende komipesa na maboko ya bato ya Babiloni oyo bazingeli bino, akobikisa bomoi na ye mpe akokufa te. 10 Nazwaki mokano ya kosala engumba oyo mabe, kasi bolamu te, elobi Yawe ; nakokaba yango na maboko ya mokonzi ya Babiloni, oyo akobebisa yango na moto. ›
11 Loba na libota ya mokonzi ya Yuda :