3 Tango banoko na ye balobaki maloba nyonso ya Abimeleki epai ya bakambi nyonso ya Sishemi, mitema na bango nyonso ekendeki epai ya Abimeleki, pamba te balobaki ete azali ndeko na bango ya mobali. 4 Bapesaki ye mbongo ya bibende ya palata, tuku sambo oyo bazwaki na tempelo ya Bala-Beriti. Na mbongo yango, Abimeleki afutaki bato ya mobulu mpo na kolanda ye. 5 Akendeki na Ofira, na ndako ya tata na ye, mpe abomaki bandeko na ye ya mibali tuku sambo, bana ya Yerubali na likolo ya libanga moko ya monene. Kasi Yotami, mwana mobali ya suka ya Yerubali, abikaki mpo ete amibombaki. 6 Bakambi nyonso ya Sishemi mpe ndako nyonso ya Milo basanganaki mpo na kokende kokomisa Abimeleki mokonzi, pembeni ya terebente, na likonzi ya mabanga kati na Sishemi.
16 Soki penza bosaleli na bosembo mpe na bosolo, wana bokomisi Abimeleki mokonzi ; soki bozalaki na motema malamu liboso ya Yerubali mpe libota na ye, soki bosalelaki ye kolanda misala malamu oyo ye asalelaki bino, 17 bobosana te ete tata na ngai abundelaki bino, andimaki ata kokufa mpo na kokangola bino wuta na loboko ya Madiani. 18 Kasi na mokolo ya lelo, botombokeli libota ya tata na ngai, bobomi bana na ye ya mibali tuku sambo, na libanga moko, mpe botie Abimeleki, mwana mobali ya mwasi mowumbu na ye, mokonzi ya bato ya Sishemi, pamba te azali ndeko na bino ya mobali. 19 Soki bosaleli na bosembo mpe bosolo liboso ya Yerubali mpe libota na ye, na mokolo ya lelo, tika ete Abimeleki asepela na bino, mpe bino bosepela na ye ! 20 Kasi soki ezali bongo te, tika ete moto ebima wuta na Abimeleki mpe etumba bino bavandi ya Sishemi mpe ya Beti-Milo ; mpe tika ete moto ebima wuta na bino bavandi ya Sishemi mpe ya Beti-Milo, mpe etumba Abimeleki ! »
21 Yotami abimaki, akendeki na Beri mpe avandaki kuna, pamba te azalaki kobanga Abimeleki, ndeko na ye ya mobali.
22 Sima, Abimeleki akambaki Isalaele mibu misato. 23 Nzambe atindaki molimo mabe kati na Abimeleki mpe bavandi ya Sishemi, mpe bavandi ya Sishemi basalelaki Abimeleki likita. 24 Nzambe asalaki bongo mpo na kozongisa mabe na mabe na oyo basalaki tango babomaki bana mibali tuku sambo ya Yerubali, mpo ete makila na bango etangama na moto ya ndeko na bango ya mobali, Abimeleki, mpe na mito ya bato ya Sishemi oyo basungaki ye mpo na koboma bandeko na ye ya mibali. 25 Bavandi ya Sishemi batielaki Abimeleki motambo na likolo ya bangomba : batiaki bato na esika ya kobombama mpo na kobotola biloko epai ya baleki nzela nyonso oyo bazalaki koleka pene na bango. Mpe bamemelaki Abimeleki sango yango.
26 Nzokande Gali, mwana mobali ya Ebedi, akendeki na Sishemi, elongo na bandeko na ye ya mibali ; mpe bato ya Sishemi batielaki ye motema. 27 Na tango ya kobuka bambuma ya vino, bato ya Sishemi bakendeki na bilanga, bakamolaki vino mpe basalaki feti monene kati na tempelo ya nzambe na bango. Wana bazalaki kolia mpe komela, balakelaki Abimeleki mabe. 28 Bongo Gali, mwana mobali ya Ebedi, alobaki : « Abimeleki nde nani liboso ya Sishemi mpo ete biso bato ya Sishemi tosalela ye ? Boni, azali mwana mobali ya Yerubali te ? Zebuli azali molobeli na ye te ? Bosalela bato ya Amori, tata ya Sishemi ! Kasi mpo na nini tosalela Abimeleki ? 29 Oh soki kaka nazalaki kokamba bato oyo, mbele nalingaki kobengana Abimeleki, mpe nalingaki koloba na ye : ‹ Bakisa lisusu makasi ya mampinga na yo, mpe yaka tobunda. › »
30 Tango Zebuli, moyangeli ya engumba, ayokaki makambo oyo Gali, mwana mobali ya Ebedi, alobaki, asilikaki makasi. 31 Atindaki bantoma na nkuku epai ya Abimeleki mpo na koloba na ye : « Gali, mwana mobali ya Ebedi, mpe bandeko na ye ya mibali bayaki na Sishemi, mpe bazali kotindika bato ya engumba mpo ete batombokela yo. 32 Sik’oyo telema, na butu, yo elongo na bato na yo ; bokende kovanda kati na elanga, na esika ya kobombama. 33 Bongo, na tongo-tongo, wana moyi ezali kobima, okokende mpe okobundisa engumba. Tango Gali elongo na bato na ye nyonso bakobima mpo na kokutana na yo, sala nyonso oyo loboko na yo ekoki kosala. »
34 Na butu, Abimeleki elongo na mampinga na ye nyonso batelemaki, bakabwanaki na biteni minei mpe bakendeki kovanda kati na esika ya kobombama, pene ya Sishemi. 35 Tango Gali, mwana mobali ya Ebedi, abimaki mpe atelemaki na ekuke ya engumba, Abimeleki elongo na basoda na ye babimaki na esika oyo babombamaki. 36 Tango Gali amonaki bato, alobaki na Zebuli :
37 Kasi Gali alobaki lisusu :
38 Zebuli alobaki na Gali :
39 Boye, Gali amemaki bavandi ya Sishemi mpe abundisaki Abimeleki. 40 Abimeleki alandaki Gali, mpe Gali akimaki liboso ya Abimeleki, mpe bato ebele penza bakufaki kino na ekotelo ya ekuke. 41 Abimeleki avandaki na Aruma, mpe Zebuli abenganaki Gali elongo na bandeko na ye ya mibali mpo ete bavanda lisusu te na Sishemi.
56 Boye, Nzambe azongiselaki Abimeleki mabe oyo asalaki tata na ye tango abomaki bandeko na ye ya mibali tuku sambo. 57 Nzambe azongiselaki bato ya Sishemi mabe nyonso oyo basalaki. Ezali ndenge wana nde elakeli mabe oyo Yotami, mwana mobali ya Yerubali, asakolaki ekokisamaki.
<- Bilombe 8Bilombe 10 ->