1 Tala bikolo oyo Yawe atikaki mpo na komeka bana ya Isalaele oyo bazalaki na tango ya bitumba ya Kanana. 2 Asalaki bango bongo, kaka mpo ete milongo ya sika ya bana ya Isalaele oyo bazalaki te na tango ya bitumba, bayeba nini yango bitumba. 3 Yawe atikaki kati na mokili yango bakonzi mitano ya bato ya Filisitia, bato nyonso ya Kanana, bato nyonso ya Sidoni mpe bato nyonso ya Evi, oyo bazalaki kovanda na bangomba ya Libani, wuta na ngomba ya Bala-Erimoni kino na Lebo-Amati. 4 Bikolo wana etikalaki mpo na komeka bana ya Isalaele mpe kotala soki bakotosa mitindo oyo Yawe apesaki bakoko na bango na nzela ya Moyize. 5 Bana ya Isalaele bavandaki kati na bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi ; 6 babalaki bana basi na bango mpe babalisaki bana na bango ya basi epai ya bana na bango ya mibali, mpe basalelaki banzambe na bango.
15 Bana ya Isalaele bagangaki lisusu epai na Yawe, mpe Yawe apesaki bango mokangoli moko na kombo Ewudi, mwana mobali ya Gera, ya libota ya Benjame. Ewudi azalaki kosalela loboko ya mwasi. Bana ya Isalaele batindaki ye epai ya Egiloni, mokonzi ya Moabi, mpo na kopesa ye mpako. 16 Ewudi amisalelaki mopanga ya minu mibale, ya ndambo ya metele na molayi. Akangaki yango na loketo na ye, na ngambo ya loboko ya mobali, mpe abombaki yango na se ya bilamba na ye. 17 Apesaki mpako epai ya Egiloni, mokonzi ya Moabi, oyo azalaki moto ya nzoto minene. 18 Tango Ewudi asilisaki kopesa mpako, azongisaki bato nyonso oyo bamemaki yango. 19 Kasi tango akomaki na esika ya banzambe ya bikeko oyo basala na mabanga, pembeni ya Giligali, azongaki epai ya mokonzi mpe alobaki na ye :
21 Ewudi asembolaki loboko na ye ya mwasi, akamataki mopanga oyo abombaki na loketo na ye, na ngambo ya loboko ya mobali, mpe atubaki yango na libumu ya mokonzi. 22 Boye, ezala esimbelo ya mopanga, nyonso ekotaki, mpe mafuta ezipaki mopanga ; pamba te Ewudi atikaki mopanga yango kati na libumu ya mokonzi. 23 Ewudi abimaki na sima ya ndako, akangaki bikuke ya shambre ya likolo sima na ye mpe atiaki yango bibende.
24 Tango akendeki, basali ya mokonzi bayaki na esika yango mpe bamonaki ete bikuke ya shambre ya likolo ya kokangama. Balobaki :
25 Basali bazelaki mingi, kino ekomaki kosala bango soni. Lokola mokonzi azalaki kaka kofungola te bikuke ya shambre ya likolo, bazwaki fungola mpe bafungolaki bango moko. Mpe tala, bamonaki nkolo na bango azali ya kokufa, alala na se. 26 Wana balekisaki bongo ngonga, Ewudi abimaki ; alekaki na esika oyo ezalaki na banzambe oyo basala na mabanga mpe akimaki na Seira. 27 Tango akomaki kuna, abetaki kelelo na mokili ya bangomba ya Efrayimi, mpe bana ya Isalaele bakitaki elongo na ye, longwa na likolo na ngomba, mpe amitiaki na liboso mpo na kotambolisa bango. 28 Alobaki na bango :