4 Tata-bokilo na ye, tata ya mwana mwasi, akangaki ye mpo ete avanda mwa moke. Boye avandaki na ye mikolo misato, aliaki, amelaki mpe alalaki kuna.
5 Na mokolo ya minei, balamukaki na tongo-tongo, mpe Molevi abongamaki mpo na kokende. Kasi tata ya mwana mwasi alobaki na bokilo na ye : « Lia mwa eloko mpo ete ozwa makasi ; bongo sima, okoki na yo kokende. »
6 Boye, bango mibale bavandaki esika moko mpo na kolia mpe komela. Sima na yango, tata ya mwana mwasi alobaki : « Nabondeli yo, vanda lisusu, na butu ya lelo, mpo ete motema na yo esepela. »
7 Mobali atelemaki mpo na kokende ; kasi lokola tata-bokilo na ye abondelaki ye makasi ete avanda, avandaki kuna na butu yango.
8 Na tongo ya mokolo ya mitano, tango mobali alamukaki, tata ya mwana mwasi alobaki : « Lia mwa eloko mpo ete ozwa makasi, zela kino na sima ya midi. » Boye, bango mibale baliaki mesa moko. 9 Tango mobali elongo na makangu na ye mpe mosali na ye batelemaki mpo na kokende, tata-bokilo na ye, tata ya mwana mwasi, alobaki na ye : « Tala, pokwa esili koya ! Nabondeli yo : lekisa lisusu butu awa ; mokolo esili, vanda mpe sepelisa motema na yo. Bongo lobi, na tongo-tongo, bokoki kotelema mpo na kokende, mpe okozonga na ndako na yo. »
10 Kasi mosali asepelaki te kolekisa butu mosusu ; alongwaki mpe, elongo na ba-ane na ye mibale mpe makangu na ye, akendeki na Yebusi oyo ezali Yelusalemi. Ba-ane na ye ezalaki na bivandelo ya malamu penza. 11 Tango bakomaki pembeni ya Yebusi mpe mokolo ekomaki pene ya kosila, mosali alobaki na nkolo na ye :
12 Nkolo azongiselaki ye :
13 Alobaki lisusu na mosali na ye :
14 Boye bakobaki kotambola, mpe moyi ebungaki tango bakomaki pene ya Gibea, kati na mokili ya Benjame. 15 Batelemaki na Gibea mpo na kolekisa butu. Bakotaki mpe bavandaki na esika oyo bato ebele ya engumba bakutanaka, kasi moto moko te ayambaki bango na ndako na ye mpo na kolekisa butu.
16 Na pokwa, mobali moko ya mobange awutaki na mosala na ye ya bilanga ; azalaki moto ya etuka ya bangomba ya Efrayimi mpe azalaki kovanda na Gibea. Nzokande bato ya esika wana bazalaki bato ya libota ya Benjame. 17 Tango atombolaki miso, amonaki moto ya mobembo na esika oyo bato ebele ya engumba bakutanaka. Mobange yango atunaki ye :
18 Moto ya mobembo azongiselaki ye :
20 Mobange yango alobaki :
21 Akotisaki bango na ndako na ye mpe apesaki ba-ane na ye matiti. Sima, basukolaki makolo, baliaki mpe bamelaki.
22 Wana bazalaki nanu kolia mpe komela, ndambo ya mibali ya engumba, ya mitema mabe, bazingelaki ndako ; babetaki na ekuke mpe balobaki na mobange oyo azalaki nkolo ndako :
23 Nkolo ndako abimaki libanda mpe alobaki na bango :
25 Kasi mibali yango baboyaki koyokela ye. Boye mobali azwaki makangu na ye mpe abimisaki ye libanda epai na bango. Bakangaki ye mpe basangisaki na ye nzoto na makasi, butu mobimba ; mpe tango tongo ekomaki pene ya kotana, batikaki ye akende. 26 Tango tongo ezali kotana, mwasi azongaki na ndako epai wapi mobali na ye azalaki, akweyaki na ekuke mpe alelaki wana kino tongo etanaki malamu. 27 Na tongo, tango mobali na ye alamukaki, afungolaki ekuke ya ndako mpo na kobima libanda mpe kokoba mobembo na ye ; amonaki makangu na ye alali na ekuke ya ndako, maboko liboso ya ekuke. 28 Alobaki na ye : « Telema ; tokende ! »