3 Azongiselaki mama na ye mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko na nkama moko.
4 Tango Mika azwaki mbongo yango, azongisaki yango lisusu epai ya mama na ye ; mpe mama na ye alongolaki mbongo ya bibende ya palata, nkama mibale oyo apesaki epai ya monyangwisi bibende na moto. Moto yango asalaki na yango ekeko mpe nzambe ya ekeko ya palata oyo banyangwisa. Mpe batiaki yango kati na ndako ya Mika. 5 Nzokande, Mika azalaki na esika na ye ya bule epai wapi azalaki kosambela. Asalisaki efode mpe banzambe mosusu ya bikeko ; bongo abulisaki lokola nganga-nzambe na ye, moko kati na bana na ye ya mibali.
6 Na mikolo wana, bana ya Isalaele bazalaki na mokonzi te ; moto na moto azalaki kosala nyonso oyo ezali malamu na miso na ye. 7 Nzokande, ezalaki na elenge mobali moko ya Molevi, azalaki kovanda na Beteleemi ya Yuda, na ekolo Yuda. 8 Alongwaki na engumba Beteleemi ya Yuda mpe akendeki koluka esika mosusu ya kovanda. Na mobembo na ye, akomaki na etuka ya bangomba ya Efrayimi, na ndako ya Mika.
9 Mika atunaki ye :
10 Mika alobaki na ye :
11 Boye, Molevi yango andimaki kovanda elongo na Mika. Mika akomisaki Molevi lokola moko kati na bana na ye. 12 Mika abulisaki Molevi yango lokola nganga-nzambe na ye mpe akomaki kovanda elongo na ye. 13 Mika alobaki : « Sik’oyo nayebi ete Yawe akosalela ngai bolamu lokola moto ya libota ya Levi akomi nganga-nzambe na ngai. »
<- Bilombe 16Bilombe 18 ->