1 Mokolo moko, Samison akendeki na Gaza epai wapi amonaki mwasi moko ya ndumba, mpe asangisaki na ye nzoto. 2 Tango bato ya Gaza bayokaki sango ete Samison azali kati na engumba na bango, bazingelaki esika oyo Samison alalaki mpe basenzelaki butu mobimba, mpo na kozela ye na ekuke ya engumba. Na butu yango, baninganaki te mpe balobaki : « Tokoboma ye na tongo tango akobima. » 3 Kasi Samison alalaki wana kaka kino na kati-kati ya butu ; bongo na ngonga ya zomi na mibale ya butu, alamukaki. Tango akomaki na ekuke ya engumba, asimbaki bizipelo na yango elongo na makonzi na yango mibale. Apikolaki yango elongo na libaya ya kokangela, atombolaki mpe atiaki yango na mapeka na ye, bongo amemaki yango kino na songe ya ngomba moke oyo etalana na engumba Ebron.
4 Sima na yango, Samison alingaki mwasi moko oyo azalaki kovanda na lubwaku ya Soreki ; kombo na ye ezalaki « Dalila. » 5 Bakambi ya Filisitia bakendeki epai ya Dalila mpe balobaki na ye : « Solola na ye na maloba ya sukali mpo ete alakisa yo sekele ya makasi na ye mpe ndenge nini tokoki kolonga ye, mpo ete tokanga ye basinga mpe tosilisa ye makasi. Moko na moko kati na biso akopesa yo mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko na nkama moko. »
6 Dalila ayebisaki Samison :
7 Samison azongiselaki ye :
8 Boye, bakambi ya Filisitia bamemelaki Dalila basinga sambo ya mobesu, oyo nanu bakawusi te, mpe Dalila alingaki Samison basinga yango. 9 Lokola bato oyo batindamaki mpo na kokanga ye bazalaki ya kobombama kati na ndako, Dalila abelelaki : « Samison, bato ya Filisitia bayei kobundisa yo ! »
10 Dalila alobaki na Samison :
11 Samison alobaki :
12 Dalila azwaki basinga ya sika mpe akangaki na yango Samison. Bongo abelelaki : « Samison, bato ya Filisitia bayei kobundisa yo ! »
13 Boye Dalila alobaki na Samison :
15 Dalila alobaki na ye : « Ndenge nini okoki koloba ete olingaka ngai tango motema na yo ezali elongo na ngai te ! Oyo ezali mbala na yo ya misato ya kosakana na ngai, pamba te oyebisi ngai te sekele ya makasi na yo. »
16 Lokola, mokolo na mokolo, Dalila azalaki kotungisa Samison na maloba na ye mpe kozangisa ye kimia, Samison amonaki ete motungisi yango eleki ye ndelo. 17 Boye, ayebisaki Dalila makambo nyonso. Alobaki : « Suki na ngai ekatamaka te, pamba te Nzambe abulisa ngai wuta na libumu ya mama na ngai. Soki kaka bakati ngai suki, makasi na ngai ekosila mpe nakokoma moto na bolembu lokola moto nyonso. »
18 Tango Dalila amonaki ete Samison ayebisi ye makambo nyonso, atindaki sango epai ya bakambi ya Filisitia. Alobaki : « Boya lisusu, ayebisi ngai makambo nyonso. »
21 Bato ya Filisitia bakangaki ye, batobolaki ye miso, bamemaki ye na Gaza mpe bakangaki ye minyololo ya bibende ya bronze. Akomaki konika bambuma ya ble na enikelo ya libanga kati na boloko.
22 Kasi suki ya moto na ye ekomaki lisusu kokola wuta tango bakataki ye yango.
23 Bakambi ya Filisitia basanganaki mpo na kobonza mbeka monene epai ya nzambe na bango, Dagoni, mpe kosala feti. Balobaki : « Nzambe na biso akabi monguna na biso, Samison, na maboko na biso. »
24 Tango bato bamonaki Samison, bakumisaki nzambe na bango, balobaki :
25 Wana bazalaki kosepela, bagangaki : « Bomemela biso Samison mpo ete asepelisa biso ! »
27 Nzokande, tempelo ezalaki ya kotonda na mibali, basi mpe bakambi nyonso ya Filisitia. Na likolo ya ndako, ezalaki na bato pene nkoto misato, mibali mpe basi, oyo bazalaki kotala masano oyo Samison azalaki kosala. 28 Samison abondelaki Yawe : « Nkolo Yawe, Yo oyo osalaka nyonso oyo olingi, kanisa ngai ! Nabondeli Yo, Nzambe : Pesa ngai makasi mbala oyo lisusu, mpe pesa ngai nzela ete, na mbala moko, nazongisa mabe na mabe epai ya bato oyo ya Filisitia mpo na miso na ngai mibale. »
29 Samison asimbaki makonzi nyonso mibale ya kati-kati, oyo esimbaki tempelo, mpe ayekamelaki yango, loboko ya mobali na likonzi moko, mpe loboko ya mwasi na likonzi mosusu. 30 Bongo Samison alobaki : « Tika ete nakufa elongo na bato ya Filisitia ! »