1 Yango wana, lokola elaka ya kokota kati na bopemi ya Nzambe ezali nanu, tosala keba ete moko kati na bino akanisa ete azangeli. 2 Pamba te, biso mpe toyokaki Sango Malamu lokola bango ; kasi mateya oyo bayokaki esungaki bango ata na likambo moko te mpo ete bato oyo bayokaki yango bayambaki yango na kondima te. 3 Sik’oyo, biso oyo tondimi, tozali kokota kati na bopemi yango kolanda ndenge Nzambe alobaki :
5 Mpe, kati na eteni oyo esili koleka, alobi : « Bakotikala kokota te kati na bopemi na ngai ! »
6 Boye, lokola emonani polele ete ezali nanu na bato oyo basengeli kokota kati na bopemi yango, mpe ete bato oyo bazalaki bato ya liboso mpo na koyoka Sango Malamu bakotaki te mpo ete batosaki Nzambe te, 7 yango wana Nzambe abongisi lisusu mokolo moko oyo azali kobenga « lelo, » tango alobaki, sima na mikolo, na nzela ya Davidi :
11 Yango wana, tosala makasi mpo na kokota kati na bopemi yango mpo ete tokweya te kati na bozangi botosi lokola bana ya Isalaele. 12 Pamba te Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ekotaka koleka kutu mopanga oyo ezali na minu na bangambo nyonso mibale, ekomaka kino kokabola elimo mpe molimo, mikuwa mpe mafuta oyo ezalaka kati na mikuwa, mpe esosolaka malamu makanisi mpe mikano ya motema ya moto. 13 Kati na bikelamu nyonso, moko te ezali ya kobombama na miso ya Nzambe : nyonso ezali polele, mpe ezali ya kobombama te na miso ya Ye oyo akosambisa biso.
16 Boye, topusana na elikya nyonso pene ya Kiti ya Bokonzi ya ngolu mpo ete Nzambe ayokela biso mawa mpe tozwa ngolu, oyo ekosunga biso na tango oyo ekoki.
<- Ba-Ebre 3Ba-Ebre 5 ->